Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Deteronomi 6:4 - Mokanda na Bomoi

4 Isalaele, yoka malamu ! Yawe azali Nzambe na biso, Yawe azali kaka moko.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Deteronomi 6:4
26 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Eliya apusanaki pene na bato mpe alobaki : — Kino tango nini bokotambola lokolo moko na zamba mpe lokolo mosusu na nzela ? Soki Yawe azali Nzambe, tika ete bolanda Ye ! Kasi soki mpe Bala, bolanda ye. Bato bazongisaki ata eloko moko te.


Tango bakalaka ya mokonzi Ezekiasi bakomaki epai ya Ezayi,


Davidi akumisaki Yawe liboso ya lisanga mobimba na maloba oyo : « Oh Yawe, Nzambe ya Isalaele, tata na biso, tika ete ozwa lokumu mpo na libela !


Bateyaki kati na Yuda. Wana bazalaki na buku ya Mobeko ya Yawe elongo na bango, batambolaki kati na bingumba nyonso ya Yuda mpo na koteya bato.


Ezali Yo, bobele Yo, nde ozali Yawe ! Okela Likolo, Likolo oyo eleki Likolo mpe mampinga nyonso ya Likolo ; okela lisusu mabele mpe nyonso oyo ezali kati na yango, bibale minene mpe nyonso oyo ezali kati na yango ; opesaka bomoi na bikelamu nyonso, mpe mampinga ya Likolo egumbamaka liboso na Yo.


Apesaki malako mpo na bolamu ya Jakobi, atiaki mibeko kati na Isalaele, apesaki mitindo epai ya batata na biso ete bateya yango epai ya bana mibali na bango,


Pamba te ozali monene mpe osalaka bikamwa ; Yo kaka nde ozali Nzambe.


Nazali Yawe ; yango nde Kombo na Ngai ; nakopesa nkembo na Ngai na mosusu te to lokumu na Ngai epai na banzambe ya bikeko te.


Tala liloba oyo Yawe, Mokonzi mpe Mosikoli ya Isalaele, Mokonzi ya mampinga, alobi : Nazali ebandeli mpe nazali suka ; Nzambe mosusu azali te, soki Ngai te.


Bolenga te, bobanga mpe te. Boni, natatolaki yango te ? Nasakolaki yango te wuta kala ? Bozali batatoli na Ngai. Boni, ezali na nzambe mosusu pembeni na Ngai ? Te, ezali na Libanga mosusu te, nayebi ata moko te. »


Yawe akozala Mokonzi ya mabele mobimba. Na mokolo wana, Ye moko kaka nde akozala Nkolo, mpe bakosambela kaka Ye.


Yesu azongiselaki ye : — Linga Nkolo, Nzambe na yo, na motema na yo mobimba, na molimo na yo mobimba mpe na makanisi na yo nyonso.


Molakisi ya mibeko azongisaki : — Linga Nkolo, Nzambe na yo, na motema na yo mobimba, na molimo na yo mobimba, na makasi na yo nyonso mpe na makanisi na yo nyonso ; mpe linga moninga na yo ndenge yo moko omilingaka.


Nzokande, bomoi ya seko ezali : koyeba Yo oyo ozali Nzambe moko kaka ya solo, mpe koyeba Yesu-Klisto oyo otindaki.


Pamba te Nzambe azali kaka moko ; Ye nde akomisaka, na nzela ya kondima na bango, bato oyo bakatisa ngenga mpe bato oyo bakatisa ngenga te, bato ya sembo.


Nzambe azali se moko, azali mpe Tata ya bato nyonso ; aleki bato nyonso, asalaka na nzela ya bato nyonso mpe azali kati na bato nyonso.


Yeba yango lelo mpe tia yango na motema na yo ete Yawe kaka nde azali Nzambe na likolo mpe na se, mosusu azali te.


‹ Nazali Yawe, Nzambe na yo, oyo abimisaki yo wuta na mokili ya Ejipito epai wapi ozalaki na bowumbu.


Solo, ezali na Nzambe kaka moko. Ndenge moko mpe ezali na Moyokanisi kaka moko kati na Nzambe mpe bato : ezali moto moko, Yesu-Klisto


Ondimaka ete Nzambe azali kaka moko ? Osalaka malamu ! Kasi milimo mabe mpe endimaka ete Nzambe azali kaka moko, mpe elengaka.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ