Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Deteronomi 6:22 - Mokanda na Bomoi

22 Yawe asalaki na miso na biso bilembo minene mpe bikamwa, ya minene mpe ya somo na Ejipito, na Faraon mpe na ndako na ye mobimba.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Deteronomi 6:22
15 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

atindaki bilembo ya kokamwa mpe bikamwa kati na yo, Ejipito, mpo na kotelemela Faraon mpe basali na ye nyonso ;


Ye kaka nde asalaka bikamwa ya minene ; pamba te bolingo na Ye ewumelaka seko na seko !


Okotala kaka na miso na yo mpe okomona ndenge nini bato mabe bazali kozwa etumbu lokola lifuti na bango.


mpe ete oyebisa bana na yo mpe bakoko na yo makambo oyo nasalaki na Ejipito mpe bilembo ya kokamwa oyo nasalaki kati na bango. Bongo bokoyeba ete Ngai nazali Yawe. »


Yango wana, nakosembola loboko na Ngai ; nakobeta Ejipito na nzela ya bikamwa na Ngai nyonso oyo nakosala kati na yango. Sima na yango, mokonzi ya Ejipito akotika bino kokende.


pamba te Yawe, Nzambe na bino, azali kotambola liboso na bino mpe akobunda mpo na bino ndenge asalaki na Ejipito, na miso ya bato nyonso.


Na tango wana, nalobaki na Jozue : « Omonaki yo moko makambo oyo Yawe, Nzambe na bino, asalaki epai na bakonzi oyo mibale ; akosala kaka ndenge moko na bikolo nyonso epai wapi bokoleka.


Bomonaki bino moko makambo oyo Yawe, Nzambe na bino, asalaki na Bala ya Peori : abomaki kati na bino bato nyonso oyo bamipesaki na kosalela Bala ya Peori.


Boni, ezali na nzambe oyo ameka kobimisa mpo na ye ekolo moko wuta na ekolo mosusu na nzela ya komekama, ya bilembo, ya bikamwa, ya bitumba, ya maboko na ye ya nguya, mpe na kosembola loboko to na nzela ya misala minene ya somo lokola makambo nyonso oyo Yawe, Nzambe na bino, asala mpo na bino kati na Ejipito na miso na bino ?


Okoloba na ye : Tozalaki bawumbu ya Faraon na Ejipito, kasi Yawe abimisaki biso na Ejipito na loboko na ye ya nguya.


Kasi abimisaki biso kuna mpo na kokotisa biso mpe kopesa biso mokili oyo alakaki na bakoko na biso na ndayi oyo alapaki.


Omonaki na miso na yo komekama makasi, bilembo ya kokamwa mpe bikamwa, loboko ya nguya mpe loboko esembolama oyo na nzela na yango Yawe, Nzambe na yo, abimisaki yo na Ejipito. Yawe, Nzambe na yo, akosala ndenge moko epai ya bato oyo ozali kobanga.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ