Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Deteronomi 6:21 - Mokanda na Bomoi

21 Okoloba na ye : Tozalaki bawumbu ya Faraon na Ejipito, kasi Yawe abimisaki biso na Ejipito na loboko na ye ya nguya.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Deteronomi 6:21
21 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Lokola azalaki kowumela, mibali yango bakangaki na makasi loboko na ye, maboko ya mwasi mpe ya bana na ye ya basi ; mpe bamemaki bango na libanda ya engumba, pamba te Yawe ayokelaki bango mawa.


mpo ete batonga elikya na bango kati na Nzambe, babosana te misala ya Nzambe mpe babatela mibeko na Ye.


Mikolo ekoya, tango bana na bino ya mibali bakotuna bino : ‹ Molulu oyo elakisi nini ? › Bokoloba na bango : ‹ Ezali na nguya na Ye nde Yawe abimisaki biso na Ejipito, mokili ya bowumbu.


Mpe yango ekozala lokola elembo na loboko na bino mpe ekaniseli na elongi na bino, pamba te Yawe abimisaki bino na Ejipito na nzela ya loboko na Ye ya nguya. »


Moyize alobaki na bato : « Bokanisa mokolo oyo bobimaki na Ejipito, mokolo oyo bobimaki na bowumbu, pamba te Yawe abimisaki bino na loboko na Ye ya nguya. Bokolia eloko moko te oyo ezali na levire.


Feti oyo bokosala ekozala lokola elembo na loboko na bino mpe ekaniseli na elongi na bino mpo ete mibeko ya Yawe ezala na bibebu na bino, pamba te Ye nde abimisaki bino na Ejipito na loboko na Ye ya nguya.


« Nazali Yawe, Nzambe na yo, oyo abimisaki yo wuta na mokili ya Ejipito epai wapi ozalaki na bowumbu.


Kasi nayebi ete mokonzi ya Ejipito akopesa bino te nzela ya kokende, ata soki amoni loboko na Ngai ya nguya.


« Boyoka ngai, bino bato oyo bolukaka bosembo mpe bolukaka Yawe ! Botala libanga epai wapi bosalemaki, mpe libulu epai wapi bobendamaki.


Bokanisa ete bino mpe bozalaki bawumbu na Ejipito ; mpe Yawe, Nzambe na bino, asikolaki bino. Yango wana, napesi bino mobeko oyo na mokolo ya lelo.


Boni, ezali na nzambe oyo ameka kobimisa mpo na ye ekolo moko wuta na ekolo mosusu na nzela ya komekama, ya bilembo, ya bikamwa, ya bitumba, ya maboko na ye ya nguya, mpe na kosembola loboko to na nzela ya misala minene ya somo lokola makambo nyonso oyo Yawe, Nzambe na bino, asala mpo na bino kati na Ejipito na miso na bino ?


Kanisa ete bozalaki bawumbu na Ejipito, mpe Yawe, Nzambe na bino, abimisaki bino kuna na loboko na Ye ya nguya mpe na loboko na Ye ya kosembolama. Yango wana, Yawe, Nzambe na yo, apesi yo mitindo ete otosa mokolo ya Saba.


‹ Nazali Yawe, Nzambe na yo, oyo abimisaki yo wuta na mokili ya Ejipito epai wapi ozalaki na bowumbu.


Na mikolo ekoya, soki mwana na yo ya mobali atuni yo : Mitindo, bikateli mpe mibeko oyo Yawe, Nzambe na biso, atinda yo, elingi kolakisa nini ?


Yawe asalaki na miso na biso bilembo minene mpe bikamwa, ya minene mpe ya somo na Ejipito, na Faraon mpe na ndako na ye mobimba.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ