Deteronomi 6:10 - Mokanda na Bomoi10 Tango Yawe, Nzambe na yo, akokotisa yo na mokili oyo alapelaki ndayi epai ya bakoko na yo, epai ya Abrayami, Izaki, mpe Jakobi mpo na kopesa yo bingumba ya minene mpe ya malamu oyo yo otongaki te, အခန်းကိုကြည့်ပါ။ |
Babotolaki bingumba batonga makasi mpe mabele oyo ebotaka malamu. Babotolaki bandako etonda na biloko ya ndenge na ndenge, mabulu ya mayi batimola wuta kala, bilanga ya vino, ya nzete ya olive mpe ya nzete mosusu ebele oyo ebotaka mbuma ya kolia. Na bolingo monene na Yo, baliaki mpe batondaki, bakomaki minene mpe basepelaki na mapamboli na Yo nyonso.
Pamba te nakokotisa bango na mokili oyo ezali kobimisa miliki mpe mafuta ya nzoyi, mokili oyo nalakaki kopesa epai ya bakoko na bango na nzela ya ndayi : bakolia, bakotonda mpe bakoya minene ; bongo bakokende epai ya banzambe mosusu mpe bakosambela yango, bakobwaka Ngai mpe bakobuka boyokani na Ngai.