Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Deteronomi 5:9 - Mokanda na Bomoi

9 Okogumbamelaka yango te mpe okosalelaka yango te, pamba te Ngai Yawe, Nzambe na yo, nazali Nzambe ya zuwa ; napesaka bana etumbu mpo na masumu ya batata kino na molongo ya misato mpe ya minei ya bato oyo bayinaka Ngai.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Deteronomi 5:9
13 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Tango Yawe asalaki boyokani elongo na bana ya Isalaele, alobaki na bango : « Bokogumbamela banzambe mosusu te, bokofukamela yango te, bokosalela yango te mpe bokobonzela yango bambeka te ;


Bogumbamela nzambe mosusu te, pamba te Yawe andimaka bombanda te ; Kombo na Ye ezali Nzambe ya zuwa.


atalisaka bolingo na Ye kino na milongo nkoto, alimbisaka mabe, botomboki mpe masumu, kasi azangaka te kopesa etumbu na moto oyo asali mabe, Nzambe oyo apesaka bakitani etumbu mpo na mabe ya batata na bango kino na molongo ya misato mpe ya minei !


Otalisaka bolingo na Yo epai ya bato kino na molongo ya nkoto, kasi opesaka etumbu mpo na masumu ya batata epai ya bana mpe bakitani na bango. Oh Nzambe monene mpe ya nguya, Kombo na Yo ezali Yawe, Mokonzi ya mampinga ;


« Nazali Yawe oyo asilikaka noki te, atonda na bolingo, alimbisaka masumu mpe botomboki ; kasi apesaka moto oyo asali mabe etumbu, apesaka bana etumbu mpo na masumu ya batata kino na molongo ya misato mpe ya minei. »


Bomibebisa te na kosala ekeko, elilingi ya mwasi to ya mobali,


Pamba te Yawe, Nzambe na bino, azali moto oyo ezikisaka, azali Nzambe na zuwa.


pamba te Yawe, Nzambe na yo, oyo azali kati na yo, azali Nzambe ya zuwa, mpo ete asilikela yo te mpe abebisa yo te na mokili.


Kasi azelaka te kopesa etumbu na moto oyo ayinaka Ye mpe abomaka ye mbala moko.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ