7 Okozalaka na banzambe mosusu te, bobele Ngai.
Okozala na nzambe ya mopaya te kati na yo, okogumbamela nzambe mosusu te, longola kaka ngai !
Bato na ngai, boyoka ngai ! Mpe nakokebisa bino. Ah Isalaele, soki kaka ozalaki koyokela ngai !
Okozalaka na banzambe mosusu te, bobele Ngai.
Yesu alobaki na ye : — Mosika na ngai, Satana ! Pamba te ekomama : « Okogumbamelaka kaka Yawe, Nzambe na yo, mpe okosambelaka kaka Ye. »
mpo ete bato nyonso bakumisa Mwana ndenge bakumisaka Tata. Moto oyo akumisaka Mwana te akumisaka mpe Tata te oyo atindaki Mwana.
Bosala keba ete bokosama te mpe bopengwa te na kogumbamelaka banzambe mosusu mpe na kofukamelaka yango,
Kosalela banzambe mosusu te, banzambe ya bato oyo bazingeli yo ;
Bana na ngai, bomibatelaka mosika na banzambe ya bikeko.