Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Deteronomi 5:31 - Mokanda na Bomoi

31 Kasi yo, vanda awa elongo na Ngai mpo ete napesa yo mibeko nyonso, bikateli nyonso, mpe mitindo nyonso oyo okoteya bango mpo ete basalela yango kati na mokili oyo nakopesa bango lokola libula. »

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Deteronomi 5:31
15 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Bosengeli tango nyonso kozala na bokebi mpo na kobatela bikateli mpe malako, mibeko mpe mitindo oyo Yawe akomaki mpo na bino. Bogumbamela banzambe mosusu te,


Yawe alobaki na Moyize : « Yaka pene na Ngai na likolo ya ngomba mpe telema wana. Ngai nakopesa yo bitando ya mabanga ya papala oyo na likolo na yango nakomi Mobeko mpe mitindo mpo na kopesa bana ya Isalaele malako. »


Tango Moyize amataki likolo ya ngomba, akotaki kati na mapata. Awumelaki kuna mikolo tuku minei mpe babutu tuku minei.


Napesaki bango bikateli na Ngai mpe nalakisaki bango mibeko na Ngai mpo ete moto oyo akotosa yango abika na nzela na yango.


Bongo mpo na nini Mobeko ? Mobeko ebakisamaki mpo na kobimisa polele bozangi botosi ya bato, kino na boyei ya Mokitani epai ya nani Nzambe apesaki elaka. Mobeko yango epesamaki na nzela ya ba-anjelu, mpe mokumba na yango epesamaki na maboko ya moyokanisi.


Boye, okolinga Yawe, Nzambe na yo, mpe okobatela tango nyonso malako na Ye, bikateli na Ye mpe mitindo na Ye.


Tala bikateli mpe mibeko oyo bosengeli kosalela malamu kati na mokili oyo Yawe, Nzambe ya bakoko na bino, azali kopesa bino mpo na kozwa, na tango nyonso oyo bokowumela kati na mokili yango.


Na tango wana, napesaki bino mitindo oyo : « Yawe, Nzambe na bino, apesaki bino mokili oyo mpo ete bokamata yango. Kasi bato na bino nyonso oyo bazali na makoki ya kobunda balata bibundeli mpe baleka liboso ya bandeko na bino bana ya Isalaele.


Sik’oyo Isalaele, yoka malamu mitindo mpe mibeko oyo nalingi koteya yo. Salela yango mpo ete ozala na bomoi mpe okamata mokili oyo Yawe, Nzambe ya bakoko na yo, apesi yo.


Tala malako, bikateli mpe mibeko oyo Moyize apesaki na bana ya Isalaele tango babimaki na Ejipito ;


Tala, nateyaki bino mitindo mpe mibeko ndenge Yawe, Nzambe na ngai, atindaki ngai, mpo ete bokoka kotosa yango na mokili oyo bokokota mpo na kozwa yango.


Moyize abengisaki Isalaele mobimba mpe alobaki : « Oh Isalaele, yoka malamu bikateli mpe mibeko oyo nakoyebisa yo lelo. Yekola yango, batela yango mpe salela yango.


Kende, yebisa bango : ‹ Bozonga na bandako na bino. ›


Tala mibeko, bikateli mpe malako oyo Yawe, Nzambe na bino, atindi ngai koteya bino mpo ete bosalela yango kati na mokili oyo bokokota mpo na kokamata yango,


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ