28 Yawe ayokaki bino tango boyebisaki ngai mpe alobaki na ngai : « Nayoki makambo oyo bato oyo balobi na yo. Nyonso oyo balobi ezali malamu.
« Makambo oyo bana basi ya Tselofikadi bazali koloba ezali solo. Osengeli kopesa bango eteni ya mabele lokola libula kati na bandeko ya tata na bango mpe pesa bango libula ya tata na bango.
Boye, na etinda ya Yawe, Moyize epesaki mitindo oyo epai ya bana ya Isalaele : « Makambo oyo libota ya bakitani ya Jozefi balobi ezali na nzela.
Yawe alobaki na ngai : « Makambo oyo balobi ezali malamu.
Pusana pembeni mpe yoka makambo nyonso oyo Yawe, Nzambe na biso, akoloba ; bongo na sima, okoyebisa biso makambo nyonso oyo Yawe, Nzambe na biso, akoloba na yo ; mpe biso tokoyoka mpe tokotosa yango. »