Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Deteronomi 5:27 - Mokanda na Bomoi

27 Pusana pembeni mpe yoka makambo nyonso oyo Yawe, Nzambe na biso, akoloba ; bongo na sima, okoyebisa biso makambo nyonso oyo Yawe, Nzambe na biso, akoloba na yo ; mpe biso tokoyoka mpe tokotosa yango. »

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Deteronomi 5:27
11 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

mpe kolakisa bango bikateli elongo na mibeko oyo ekotalisa bango nzela ya kolanda mpe makambo oyo basengeli kosala.


Bato nyonso bazongisaki lokola moto moko : — Tokosala nyonso oyo Yawe alobi. Bongo Moyize amemaki eyano na bango epai na Yawe.


Tango bato bayokaki bakake mpe koganga ya kelelo, mpe bamonaki mikalikali mpe milinga kobima na ngomba, balengaki. Batelemaki mosika


mpe balobaki na Moyize : — Tika ete yo moko oloba na biso, mpe tokoyoka yo ; kasi Nzambe te, noki te tokokufa !


Tango Moyize akendeki koyebisa bato makambo mpe mibeko nyonso ya Yawe, bato bazongisaki elongo : — Tokosala makambo nyonso oyo Yawe alobi.


Balobaki na Jeremi : — Tika ete Yawe azala motatoli ya solo mpe ya sembo mpo na kopesa biso etumbu soki toboyi kotosa makambo nyonso oyo Yawe, Nzambe na yo, akopesa yo mokumba ya koyebisa biso.


Ezala esepelisi biso to te, tokotosa kaka Yawe, Nzambe na biso, oyo topesi yo mokumba ya kotuna. Na bongo, makambo nyonso ekotambola malamu mpo na biso, pamba te tokotosa Yawe, Nzambe na biso.


Pamba te nani kati na mokili akoki koyoka mongongo ya Nzambe na bomoi koloba kati na moto ndenge biso toyokaki bongo atikala na bomoi ?


Yawe ayokaki bino tango boyebisaki ngai mpe alobaki na ngai : « Nayoki makambo oyo bato oyo balobi na yo. Nyonso oyo balobi ezali malamu.


pene ya lokito ya kelelo to mpe pene ya mongongo oyo ezali kobimisa maloba na lolenge ete bato oyo bayokaki maloba yango basengaki ete bayoka lisusu te ata liloba moko,


Bato bazongiselaki Jozue : — Tokosalela Yawe, Nzambe na biso, mpe tokoyoka mongongo na Ye.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ