Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Deteronomi 5:20 - Mokanda na Bomoi

20 Okolobaka te matatoli ya lokuta mpo na kokosela moninga na yo makambo.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Deteronomi 5:20
9 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Bato mibale ya kilikili bayaki kovanda liboso na ye mpe bakomaki kokosela ye makambo na miso ya bato nyonso na maloba oyo : « Naboti alakeli Nzambe mpe mokonzi mabe ! » Sima na yango, babimisaki ye na libanda ya engumba mpe babomaki ye na mabanga.


Okolobaka te matatoli ya lokuta mpo na kokosela moninga na yo makambo.


Okopanza sango ya lokuta te ; okosangana te na moto mabe mpo na koloba litatoli ya lokuta.


Motatoli ya lokuta akozwa etumbu ; moto oyo akosaka akozanga te kozwa etumbu.


Motatoli ya lokuta azwaka etumbu ; moto oyo akosaka akobebisama.


motatoli mabe oyo alobaka lokuta mpe moto oyo alukaka makelele kati na bandeko.


« Nakopusana pene na bino mpo na kosambisama, nakosala na lombangu mpo na kofunda bato ya maji, ya ekobo, bato oyo balapaka ndayi ya lokuta, bato oyo banyokolaka basali na bango, basi bakufisa mibali mpe bana bitike, oyo banyokolaka bapaya mpe batosaka Ngai te, » elobi Yawe, Mokonzi ya mampinga.


Elenge mobali yango atunaki lisusu : — Mibeko nini ? Yesu azongisaki : — Okobomaka te, okosalaka ekobo te, okoyibaka te, okolobaka litatoli ya lokuta te,


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ