Tango Yawe asalaki boyokani elongo na bana ya Isalaele, alobaki na bango : « Bokogumbamela banzambe mosusu te, bokofukamela yango te, bokosalela yango te mpe bokobonzela yango bambeka te ;
Yawe azongisaki : — Nalingi kosala boyokani elongo na bino. Liboso ya bato na yo nyonso, nakosala makambo ya kokamwa oyo etikala nanu kosalema te na mokili mobimba to na ekolo moko. Boye bato nyonso oyo bazali zingazinga na yo bakomona misala ya somo oyo Ngai Yawe nakosala na nzela na yo.
oyo nasalaki elongo na bakoko na bino tango nabimisaki bango na Ejipito, wuta na libulu ya moto oyo balambelaka bibende. » Nalobaki na bango : « Botosa Ngai mpe bosala makambo nyonso oyo nakotinda bino ; ezali na nzela wana nde bokozala bato na Ngai mpe Ngai nakozala Nzambe na bino.
ekozala ndenge moko te na boyokani oyo nasalaki elongo na batata na bango tango nasimbaki bango na loboko mpo na kobimisa bango na Ejipito ; pamba te bakataki boyokani na Ngai wana, atako nazalaki Mobali ya libala mpo na bango, » elobi Yawe.
« Tala liloba oyo Yawe, Nzambe ya Isalaele, alobi : Nasalaki boyokani elongo na bakoko na bino tango nabimisaki bango na Ejipito, mokili ya bowumbu ; nalobaki :
Moyize abengisaki bana nyonso ya Isalaele mpe alobaki na bango : « Miso na bino emonaki makambo nyonso oyo Yawe asalaki na Ejipito epai ya Faraon, epai ya basali na ye nyonso mpe kati na mokili na ye mobimba.
Bozala na bokebi mpe bobosana te boyokani oyo Yawe, Nzambe na bino, asalaki elongo na bino. Mpe bomisalela ekeko te na lolenge nyonso oyo Yawe, Nzambe na bino, apekisaki.