17 Okobomaka te.
Yango wana, soki moto asopi makila ya moto, bakosopa mpe makila na ye epai ya moto, pamba te Nzambe asalaki moto na elilingi na Ye.
Okobomaka te.
Soki moto abomi moto, basengeli koboma ye.
Elenge mobali yango atunaki lisusu : — Mibeko nini ? Yesu azongisaki : — Okobomaka te, okosalaka ekobo te, okoyibaka te, okolobaka litatoli ya lokuta te,
Oyebi mibeko oyo : « Okobomaka te, okosalaka ekobo te, okoyibaka te, okolobaka te matatoli ya lokuta mpo na kokosela moninga na yo makambo, okosalaka moninga mabe te, okopesaka tata na yo mpe mama na yo lokumu. »
Mibeko lokola : « Okosalaka ekobo te, » « okobomaka te, » « okoyibaka te, » « okolulaka te, » mpe nyonso oyo etikali, elobami na mokuse kati na mobeko oyo moko : « Linga moninga na yo ndenge yo moko omilingaka. »
Solo, Ye oyo alobaki : « Okosalaka ekobo te, » alobaki lisusu : « Okobomaka te. » Nzokande soki osali ekobo te, kasi obomi moto, yeba ete obuki mibeko nyonso.