Deteronomi 5:14 - Mokanda na Bomoi14 Kasi mokolo ya sambo ezali mokolo ya Saba ya Yawe, Nzambe na yo. Na mokolo wana, okosalaka mosala ata moko te, ezala yo, mwana na yo ya mobali, mwana na yo ya mwasi, mowumbu na yo ya mobali, mwasi mowumbu na yo, ngombe na yo, ane na yo, ebwele moko kati na bibwele na yo to mopaya oyo azali kati na bingumba na yo, mpo ete mosali na yo ya mobali mpe mwasi mosali na yo ya mwasi bakoka kopema ndenge yo ozali kopema. အခန်းကိုကြည့်ပါ။ |
Na tango wana kaka, namonaki kati na etuka ya Yuda bato bazali kokamola bambuma ya vino na mokolo ya Saba, bamosusu bazali kobongisa maboke ya matiti ya ble, kotia yango likolo ya ba-ane elongo na masanga ya vino, bambuma ya vino, ya figi mpe mikumba ya ndenge na ndenge mpo na komema yango na Yelusalemi na mokolo ya Saba. Mpo na yango, napamelaki bango ete bateka lisusu biloko te na mokolo wana.
Nzokande tozali nzoto moko mpe makila moko na bandeko na biso, mpe bana na biso bakeseni te na bana na bango ; kasi tala ndenge nini tosili kosambwa : tosengeli koteka bana na biso ya mibali mpe ya basi lokola bawumbu ; mpe bana na biso mosusu ya basi bakomi bawumbu, mpe tozangi nguya ya kosikola bango, mpo ete bilanga na biso mpe bilanga na biso ya vino ekomi ya bato mosusu !