Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Deteronomi 5:13 - Mokanda na Bomoi

13 Okosalaka misala na yo nyonso mikolo motoba.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Deteronomi 5:13
10 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Okosalaka misala na yo nyonso mikolo motoba.


Mikolo motoba, okosala mosala na yo ; kasi na mokolo ya sambo, okosala mosala moko te mpo ete ngombe na yo elongo na ane na yo ekoka kopema, mpe mpo ete mwana mobali ya mwasi mowumbu na yo mpe mopaya bazwa lisusu makasi.


Bokosala mosala mikolo motoba, kasi na mokolo ya sambo, bosengeli kopema : ezala na tango ya kolona to na tango ya kobuka.


Napesaki bango mpe mikolo na Ngai ya Saba lokola elembo ya boyokani kati na Ngai mpe bango, mpo bayeba ete Ngai Yawe nde nabulisaki bango.


Bokosala mikolo motoba, kasi mokolo ya sambo ezali Saba, mokolo ya kopema ; mokolo ya mayangani ya bule. Na esika nyonso oyo bokozala, bokosala ata mosala moko te : ezali mokolo ya Saba ya Yawe.


Sima, bazongaki epai na bango mpe babongisaki mafuta ya solo kitoko mpe malasi. Kasi bapemaki na mokolo ya Saba, kolanda ndenge mobeko ezalaki kosenga.


Kanisaka mokolo ya Saba mpe bulisaka yango, ndenge Yawe, Nzambe na yo, atindaki yo yango.


Kasi mokolo ya sambo ezali mokolo ya Saba ya Yawe, Nzambe na yo. Na mokolo wana, okosalaka mosala ata moko te, ezala yo, mwana na yo ya mobali, mwana na yo ya mwasi, mowumbu na yo ya mobali, mwasi mowumbu na yo, ngombe na yo, ane na yo, ebwele moko kati na bibwele na yo to mopaya oyo azali kati na bingumba na yo, mpo ete mosali na yo ya mobali mpe mwasi mosali na yo ya mwasi bakoka kopema ndenge yo ozali kopema.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ