Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Deteronomi 5:12 - Mokanda na Bomoi

12 Kanisaka mokolo ya Saba mpe bulisaka yango, ndenge Yawe, Nzambe na yo, atindaki yo yango.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Deteronomi 5:12
11 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Na tango wana kaka, namonaki kati na etuka ya Yuda bato bazali kokamola bambuma ya vino na mokolo ya Saba, bamosusu bazali kobongisa maboke ya matiti ya ble, kotia yango likolo ya ba-ane elongo na masanga ya vino, bambuma ya vino, ya figi mpe mikumba ya ndenge na ndenge mpo na komema yango na Yelusalemi na mokolo ya Saba. Mpo na yango, napamelaki bango ete bateka lisusu biloko te na mokolo wana.


Moyize alobaki na bango : — Tala mibeko oyo Yawe apesi : « Lobi ezali mokolo ya kopema, mokolo ya Saba oyo ebulisami mpo na Yawe. Bokolamba oyo bolingi kolamba mpe bokotokisa oyo bolingi kotokisa ; kasi oyo ekotikala, bobatela yango kino lobi. »


— Loba na bana ya Isalaele : « Bosengeli kobatela mikolo na Ngai ya Saba ; ekozala elembo ya libela na libela kati na Ngai mpe bino, mpo ete boyeba ete ezali Ngai Yawe nde nabulisi bino.


Bokosala mosala mikolo motoba, mpe mokolo ya sambo ezali mokolo ya Saba, mokolo ya kopema, mokolo oyo ebulisami mpo na Yawe. Moto nyonso oyo akosala mosala na mokolo ya Saba, basengeli koboma ye.


Bapaya oyo bakangami na Yawe mpo na kosalela Ye, mpo na kolinga Kombo na Ye mpe kogumbamela Ye, bato nyonso oyo bakobatela mokolo ya Saba mpe bakobebisa te bosantu na yango, mpe bato oyo bakokangama na boyokani na Ngai ;


Soki obateli matambe na yo ete ebebisa te lokumu ya mokolo ya Saba, mpe ete osala te mosala oyo yo olingi na mokolo na Ngai ya bule ; soki mokolo ya Saba ekomi esengo na yo mpe opesi lokumu na mokolo ya bule ya Yawe ; soki opesi yango lokumu na koboya kolanda nzela na yo moko, kosala misala na yo moko mpe kokoba na makambo oyo ezanga tina,


moko te kati na bino abimisa mokumba na ndako na ye to asala mosala songolo na mokolo ya Saba. Kasi bozwa mokolo yango lokola mokolo ya bule ndenge natindaki bakoko na bino.


Bongo alobaki na bango lisusu : — Mokolo ya Saba esalema mpo na moto, kasi moto asalema te mpo na mokolo ya Saba.


Okosalaka misala na yo nyonso mikolo motoba.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ