Okogumbamelaka yango te mpe okosalelaka yango te, pamba te Ngai Yawe, Nzambe na yo, nazali Nzambe ya zuwa ; napesaka bana etumbu mpo na masumu ya batata kino na molongo ya misato mpe ya minei ya bato oyo bayinaka Ngai.
atalisaka bolingo na Ye kino na milongo nkoto, alimbisaka mabe, botomboki mpe masumu, kasi azangaka te kopesa etumbu na moto oyo asali mabe, Nzambe oyo apesaka bakitani etumbu mpo na mabe ya batata na bango kino na molongo ya misato mpe ya minei !
Otalisaka bolingo na Yo epai ya bato kino na molongo ya nkoto, kasi opesaka etumbu mpo na masumu ya batata epai ya bana mpe bakitani na bango. Oh Nzambe monene mpe ya nguya, Kombo na Yo ezali Yawe, Mokonzi ya mampinga ;
Nasambelaki Yawe, Nzambe na ngai, mpe natubelaki : « Nkolo, Nzambe monene mpe Nzambe ya nguya, Yo oyo obatelaka boyokani na Yo ya bolingo, elongo na bato nyonso oyo balingaka Yo mpe batosaka mibeko na Yo ;
« Nazali Yawe oyo asilikaka noki te, atonda na bolingo, alimbisaka masumu mpe botomboki ; kasi apesaka moto oyo asali mabe etumbu, apesaka bana etumbu mpo na masumu ya batata kino na molongo ya misato mpe ya minei. »
Pamba te, kati na Yesu-Klisto, likambo ya tina ezali : kozala na kondima oyo esalaka na nzela ya bolingo ; ezali te : kokatama ngenga to kokatama ngenga te.
Batela bikateli mpe mitindo na Ye, oyo nazali kopesa yo lelo mpo ete ozala moto ya esengo, yo mpe bana na yo sima na yo, mpe mpo ete owumela tango molayi na mokili oyo Yawe, Nzambe, na yo apesi yo mpo na libela.
Soki bokosala keba na mibeko oyo mpe bokosalela yango malamu, Yawe, Nzambe na bino, akobatela bolingo mpe boyokani na Ye elongo na bino ndenge alapaki ndayi epai ya bakoko na bino.
Boye yeba ete Yawe, Nzambe na yo, azali Nzambe moko kaka ya solo ; azali Nzambe ya boyengebene, abatelaka boyokani mpe bolingo na Ye kino na molongo ya nkoto ya bakitani oyo balingaka Ye mpe babatelaka mibeko na Ye.
Kasi bosala keba ete bobatela mitindo mpe mobeko oyo Moyize, mowumbu ya Yawe, Nzambe na bino, apesaki bino : kolinga Yawe, Nzambe na bino ; kotambola na banzela na Ye nyonso, kotosa mitindo na Ye, kokangama na Ye, mpe kosalela Ye na motema mpe na molimo na bino mobimba. »
Kasi soki tozali kotambola kati na pole ndenge Ye moko Nzambe azali kati na pole, wana tozali moko, bamoko na bamosusu, mpe makila ya Yesu, Mwana na Ye, ezali kopetola biso na masumu nyonso.