Moto yango alobaki na ngai : « Mayi oyo ezali kotiola na ngambo ya este ya etuka mpe ezali kokita kino na etando ya Araba epai wapi ezali komibwaka na ebale monene. Tango kaka ekotaki na mayi ya ebale monene, mayi ya ebale monene ekomaki peto.
Mondelo na yango ya weste ezalaki Yordani : wuta na Kinereti kino na ebale monene ya Araba, ebale monene ya Barozo, na se ya bangomba ya Pisiga na ngambo ya este.
Wuta na bitando ya Moabi, Moyize amataki na likolo ya ngomba Nebo kino na songe ya ngomba Pisiga oyo etalana na Jeriko. Kuna, Yawe alakisaki ye mokili mobimba : wuta na Galadi kino na Dani,