Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Deteronomi 4:45 - Mokanda na Bomoi

45 Tala malako, bikateli mpe mibeko oyo Moyize apesaki na bana ya Isalaele tango babimaki na Ejipito ;

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Deteronomi 4:45
13 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Sala makambo oyo Yawe, Nzambe na yo, alingaka : tambola na banzela na Ye, batela malako mpe bikateli na Ye, mibeko mpe mitindo na Ye, ndenge ekomama kati na Mobeko ya Moyize, mpo ete olonga na makambo nyonso oyo okosala mpe na bisika nyonso oyo okokende ;


Malako na Yo ezali libula na ngai mpo na libela, esalaka esengo ya motema na ngai.


Nasepelaka kotambola kolanda malako na Yo lokola nde nazali na bomengo nyonso.


Esengo na bato oyo babatelaka malako na Ye mpe balukaka Ye na mitema na bango mobimba !


Longola soni mpe kotiolama na bomoi na ngai, pamba te natosaka malako na Yo.


Malako na Yo esepelisaka ngai makasi, epesaka ngai toli.


Tika ete nabongisa etamboli na ngai mpo ete natosa mitindo na Yo !


Nakosanzola Yo na motema ya sembo wana nakoyekola mibeko ya bosembo na Yo.


Sik’oyo Isalaele, yoka malamu mitindo mpe mibeko oyo nalingi koteya yo. Salela yango mpo ete ozala na bomoi mpe okamata mokili oyo Yawe, Nzambe ya bakoko na yo, apesi yo.


Tala Mobeko oyo Moyize atiaki liboso ya bana ya Isalaele :


mpe tango bazalaki na lubwaku etalana na Beti-Peori, na ngambo ya este ya Yordani, kati na mokili ya Sikoni, mokonzi ya bato ya Amori, oyo azalaki kovanda na Eshiboni oyo Moyize mpe bana ya Isalaele balongaki tango babimaki na Ejipito.


Batela malamu mibeko, mitindo mpe bikateli ya Yawe, Nzambe na yo, oyo apesi yo.


Na mikolo ekoya, soki mwana na yo ya mobali atuni yo : Mitindo, bikateli mpe mibeko oyo Yawe, Nzambe na biso, atinda yo, elingi kolakisa nini ?


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ