Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Deteronomi 4:44 - Mokanda na Bomoi

44 Tala Mobeko oyo Moyize atiaki liboso ya bana ya Isalaele :

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Deteronomi 4:44
14 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Bosengeli tango nyonso kozala na bokebi mpo na kobatela bikateli mpe malako, mibeko mpe mitindo oyo Yawe akomaki mpo na bino. Bogumbamela banzambe mosusu te,


Oyo nde mitindo oyo Yawe apesaki Moyize, na ngomba Sinai, mpo na bana ya Isalaele.


Oyo ezali nde mibeko mpe malako oyo Yawe apesaki na nzela ya Moyize epai ya bana ya Isalaele na bitando ya Moabi, oyo etalana na Jeriko, pene ya Yordani.


pamba te Mibeko eyaki na nzela ya Moyize, kasi ngolu mpe solo eyaki na nzela ya Yesu-Klisto.


Ezalaki na ngambo ya este ya Yordani, na mokili ya Moabi, nde Moyize alimbolaki mobeko oyo. Alobaki na bango :


« Alakelama mabe, moto nyonso oyo akokokisa te mpe akotia te na misala, maloba ya mibeko oyo ! » Bato nyonso bakozongisa : « Amen ! »


Bokokoma na likolo na yango, maloba nyonso ya mobeko tango bokosilisa kokatisa Yordani mpo na kokota na mokili oyo Nzambe na bino akopesa bino, mokili oyo ezali kobimisa miliki mpe mafuta ya nzoyi, ndenge kaka Yawe, Nzambe ya bakoko na bino, alakaki bino.


Bokokoma na konguluta maloba nyonso ya mobeko oyo na likolo ya mabanga oyo botelemisi. »


Moyize apesa biso Mobeko oyo ezali bozwi ya lisanga ya Jakobi.


Tala bingumba yango : Mpo na libota ya Ribeni, engumba Betseri kati na etando ya esobe ; mpo na libota ya Gadi, engumba Ramoti ya Galadi, mpe mpo na libota ya Manase, engumba Golani kati na Bashani.


Tala malako, bikateli mpe mibeko oyo Moyize apesaki na bana ya Isalaele tango babimaki na Ejipito ;


Tala bakonzi ya mokili, oyo bana ya Isalaele balongaki mpe oyo babotolaki mokili na bango na ngambo ya este ya Yordani, wuta na moluka ya Arinoni kino na ngomba Erimoni, elongo na ngambo nyonso ya este ya Araba :


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ