Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Deteronomi 4:43 - Mokanda na Bomoi

43 Tala bingumba yango : Mpo na libota ya Ribeni, engumba Betseri kati na etando ya esobe ; mpo na libota ya Gadi, engumba Ramoti ya Galadi, mpe mpo na libota ya Manase, engumba Golani kati na Bashani.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Deteronomi 4:43
12 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Beni-Geberi : azalaki kovanda na Ramoti kati na Galadi mpe azalaki moyangeli ya bamboka ya Yairi, mwana mobali ya Manase, kati na Galadi, mpe ya Arigobi kati na Bashani oyo ezalaki na bingumba tuku motoba oyo batonga makasi mpe bikangelo bikuke ya bamir na yango ezalaki ya bibende ya bronze.


Kati na libota ya Ribeni, kuna na ngambo ya este ya Yordani, pembeni ya Jeriko, bazwaki bingumba oyo : Betseri, kati na esobe, mpe bamboka na yango ya mike ; Yakatsi mpe bamboka na yango ya mike,


Eshiboni mpe bamboka na yango ya mike, Yaezeri mpe bamboka na yango ya mike.


mpo ete moto nyonso oyo akoboma moninga na ye na nko te, na kozanga koyina ye liboso, akoka kokimela na moko kati na bingumba yango mpe akoka kobikisa bomoi na ye.


Tala Mobeko oyo Moyize atiaki liboso ya bana ya Isalaele :


Na ngambo mosusu ya Yordani, na este ya Jeriko, baponaki Betseri kati na esobe, na likolo ya ngomba ya libota ya Ribeni ; Ramoti kati na Galadi, kati na etuka ya libota ya Gadi ; mpe Golani kati na Bashani, kati na etuka ya libota ya Manase.


Epai ya bakitani ya Gerishoni kati na bituka ya bakitani ya Levi, bapesaki bingumba oyo : Kati na ndambo ya libota ya Manase : kati na Bashani, Golani lokola engumba ya kokimela mpo na moto oyo atangami mobomi, mpe Beyeshitira, elongo na mabele na yango ; ezalaki bongo bingumba mibale.


Kati na libota ya Ribeni : Betseri lokola engumba ya kokimela mpo na moto oyo atangami mobomi, Yakatsi,


Kati na libota ya Gadi : Ramoti, kati na Galadi, lokola engumba ya kokimela mpo na moto oyo atangami mobomi, Maanayimi,


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ