42 mpo ete moto nyonso oyo akoboma moninga na ye na nko te, na kozanga koyina ye liboso, akoka kokimela na moko kati na bingumba yango mpe akoka kobikisa bomoi na ye.
Bokobongisa mpo na Balevi bingumba motoba ya kokimela mpo ete moto oyo abomi moninga na nko te akoka kokima kuna ; bokobakisa bingumba mosusu tuku minei na mibale.
Tala bingumba yango : Mpo na libota ya Ribeni, engumba Betseri kati na etando ya esobe ; mpo na libota ya Gadi, engumba Ramoti ya Galadi, mpe mpo na libota ya Manase, engumba Golani kati na Bashani.