Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Deteronomi 4:38 - Mokanda na Bomoi

38 mpo na kobengana liboso na yo bikolo minene mpe ya makasi koleka yo mpe kokotisa yo na bamboka na bango mpo na kopesa yo yango lokola libula ndenge yango ezali na mokolo ya lelo.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Deteronomi 4:38
14 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Tala lolenge nini bazali kofuta biso : bayei kobundisa mpe kobengana biso na mabele oyo opesaki biso lokola libula !


Oh Nzambe na biso, ezali Yo te oyo obenganaki bavandi ya mokili oyo liboso ya Isalaele, bato na Yo, mpo na kopesa yango mpo na libela epai ya bakitani ya Abrayami, molingami na Yo ?


bituka oyo Yawe akweyisaki liboso ya bato ya Isalaele, ezali malamu mpo na kobokola bibwele ; nzokande, basali na yo bazali mpe na bibwele. »


Pamba te ndako na ndako ya libota ya Ribeni mpe ndako na ndako ya libota ya Gadi elongo na ndambo ya libota ya Manase esilaki kozwa libula na yango.


Mabota oyo mibale na ndambo ezwaki libula na yango na ngambo ya este ya Yordani, oyo etalana na Jeriko. »


wana Yawe akobengana liboso na bino bikolo oyo nyonso, mpe bokobotola bikolo oyo eleki bino na monene mpe na makasi.


Bongo Yawe alobaki na ngai : « Tala, nabandi kokaba na maboko na bino Sikoni mpe mokili na ye. Banda kobotola yango mpe kamata yango. »


Tango Yawe, Nzambe na yo, akokotisa yo na mokili oyo ozali kokende mpo na kozwa yango lokola libula mpe tango akobengana liboso na yo bikolo ebele—bato ya Iti, ya Girigazi, ya Amori, ya Kanana, ya Perizi, ya Evi mpe ya Yebusi, bikolo sambo oyo eleki yo na motango ya bato mpe na makasi—


Mpo na yango, kobosanaka te ete ezali Yawe, Nzambe na yo, nde apesaki yo makoki ya kozwa bomengo oyo mpo na kolendisa boyokani na Ye, oyo asalaki elongo na bakoko na bino na nzela ya ndayi, ndenge ezali na mokolo ya lelo.


Bongo Jozue alobaki : — Ezali na nzela oyo nde bokoyeba solo ete Nzambe na bomoi azali elongo na bino mpe akobengana liboso na bino bato ya Kanana, ya Iti, ya Evi, ya Perizi, ya Girigazi, ya Amori mpe ya Yebusi.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ