36 Wuta na likolo, ayebisaki yo na mongongo na Ye mpo na koteya yo ; na se, Yawe alakisaki yo moto na ye ya monene mpe oyokaki mongongo na Ye kobima kati na moto.
Yawe alobaki na Moyize : — Nazali koya epai na yo kati na lipata monene, mpo ete bana ya Isalaele bayoka tango nakosolola na yo mpe mpo ete batia tango nyonso elikya na bango epai na yo. Moyize ayebisaki Yawe makambo nyonso oyo bana ya Isalaele balobaki.
mpe nkembo ya Yawe ewumelaki na likolo ya ngomba Sinai. Mikolo motoba, mapata ezipaki ngomba. Bongo na mokolo ya sambo, Yawe abengaki Moyize kati na mapata.
Bino, bopusani te, lokola bana ya Isalaele, pene ya ngomba oyo bakokaki kosimba mpe ezali kopela moto, pene ya lipata, pene ya molili makasi, pene ya mopepe makasi,
Bosala penza keba ete boboya te koyoka Ye oyo alobaka ! Pamba te soki bato wana bazangaki te kozwa etumbu tango baboyaki koyoka Ye oyo azalaki kokebisa bango awa na mokili, ekozala ndenge nini mpo na biso soki toboyi koyoka Ye oyo akebisaka biso wuta na Likolo ?