Wuta na likolo, ayebisaki yo na mongongo na Ye mpo na koteya yo ; na se, Yawe alakisaki yo moto na ye ya monene mpe oyokaki mongongo na Ye kobima kati na moto.
Oyo nde mibeko oyo Yawe alobaki na mongongo makasi kati na moto epai ya lisanga mobimba oyo ezalaki likolo ya ngomba kati na mapata mpe molili makasi ; mpe abakisaki ata likambo moko te. Bongo akomaki yango na bitando mibale ya mabanga mpe apesaki ngai yango.
Balobaki : « Yawe, Nzambe na biso, alakisi biso nkembo na Ye mpe lokumu na Ye ; mpe toyoki mongongo na Ye wuta na moto. Lelo, tomoni ete moto akoki kozala na bomoi ata soki Nzambe asololi na ye.
Yawe apesaki ngai bitando mibale ya mabanga oyo mosapi ya Nzambe ekomaki. Na likolo na yango, ezali na mibeko nyonso Yawe oyo ayebisaki bino likolo ya ngomba longwa kati na moto, na mokolo oyo bosanganaki.
Tango Jedeon asosolaki ete Ye oyo azalaki elongo na ye azali Anjelu ya Yawe, agangaki : « Nkolo Yawe, mawa na ngai ! Pamba te namoni Anjelu ya Yawe, miso na miso. »