Deteronomi 4:31 - Mokanda na Bomoi31 Pamba te Yawe, Nzambe na bino, azali Nzambe ya mawa, akosundola bino te, akobebisa bino te mpe akobosana te boyokani oyo asala na bakoko na bino tango alapaki ndayi. အခန်းကိုကြည့်ပါ။ |
Asambelaki Yawe : — Oh Yawe ! Ezali te makambo ya boye nde nazalaki komilobela tango nazalaki epai na ngai ? Yango wana nasalaki na ngai mobembo na Tarsisi mpo na koluka kokima, pamba te nayebaki malamu ete ozali Nzambe ya ngolu mpe ya mawa, osilikaka noki te mpe otonda na bolingo, obongolaka makanisi na Yo ya kosala bato mabe.