Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Deteronomi 4:3 - Mokanda na Bomoi

3 Bomonaki bino moko makambo oyo Yawe, Nzambe na bino, asalaki na Bala ya Peori : abomaki kati na bino bato nyonso oyo bamipesaki na kosalela Bala ya Peori.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Deteronomi 4:3
9 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Nalobaki na bana na bango kati na esobe : ‘ Bolanda bikeko ya batata na bino te, botosa mibeko na bango te to bomikomisa mbindo te na banzambe na bango ya bikeko !


Tango namonaki Isalaele, azalaki lokola bambuma ya vino kati na esobe. Tango namonaki bakoko na bino, bazalaki lokola bambuma ya liboso ya nzete ya figi. Kasi tango bakomaki na Bala Peori, bamipesaki na nzambe oyo ya ekeko ya soni mpe bakomaki nkele lokola eloko oyo bango balingaki.


Kati na bango, moko te atikalaki na bomoi, kati na ba-oyo Moyize mpe Nganga-Nzambe Aron batangaki, tango batangaki bana ya Isalaele kati na esobe ya Sinai.


Ezalaki nde bango bato balandaki toli ya Balami mpe batindikaki bana ya Isalaele na kopesa Yawe mokongo, kati na makambo oyo esalemaki na Peori ; mpe yango nde esalaki ete etumbu ekweya likolo ya bato na Yawe.


Ezali bino nde bato bomonaki na miso na bino moko makambo nyonso ya minene oyo Yawe asalaki.


Kasi bino oyo bokangamaki na Yawe, Nzambe na bino, bino nyonso bozali na bomoi na mokolo ya lelo.


Boni, lisumu ya Peori ekoki te mpo na biso ? Kutu, kino na mokolo ya lelo, nanu tosilisi kopetolama na yango te, atako etumbu ekweyelaki lisanga ya Yawe !


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ