Deteronomi 4:29 - Mokanda na Bomoi29 Kasi soki, wuta na mokili wana, boluki Yawe, Nzambe na bino, bokomona Ye soki boluki Ye na motema na bino mobimba mpe na molimo na bino mobimba. အခန်းကိုကြည့်ပါ။ |
Mokonzi atelemaki na etemelo ya kolobela, asalaki boyokani oyo liboso ya Yawe : « Nalapi ndayi ete nakolanda Yawe, nakotosa mibeko, mitindo mpe malako na Ye, na motema mpe na elimo na ngai mobimba ; mpe nakotosa maloba ya boyokani, oyo ekomama kati na buku oyo. » Bato nyonso bandimaki kotosa boyokani yango.
Bongo, kati na bikolo nyonso epai wapi bakokende na bowumbu, bato oyo bakobika bakokanisa ngai tango nakobuka lolendo ya mitema na bango, oyo etonda na posa ya kosalela banzambe mosusu mpe nakobebisa miso na bango, oyo eboyaka kotala Ngai mpo na kotala banzambe na bango ya bikeko. Bango moko bakoyoka nkele mpo na mabe oyo basalaki mpe mpo na misala na bango nyonso ya mbindo.
Bongo Samuele alobaki na bato nyonso ya Isalaele : « Soki ezali na motema na bino mobimba nde bolingi kozonga epai na Yawe, bolongola kati na bino banzambe ya bapaya mpe bikeko ya Asitarite ; mpe bomipesa mobimba epai na Yawe mpe bosalela kaka Ye. Na nzela wana nde Ye akokangola bino na maboko ya bato ya Filisitia. »