Deteronomi 4:28 - Mokanda na Bomoi28 Kuna, bokogumbamela banzambe oyo esalemi na maboko ya bato, banzambe ya banzete to ya mabanga, oyo ekoki komona te, koyoka te, kolia te mpe koyoka solo te. အခန်းကိုကြည့်ပါ။ |
Bapakola yango palata balekisa na moto, oyo ewuta na Tarsisi, mpe wolo oyo ewuta na Ufazi ; bato oyo basalaka bililingi na banzete mpe ba-oyo balambaka bibende na moto nde basalaka yango : balatisaka yango bilamba ya langi ya ble mpe ya motane ; ezali misala ya bato oyo basalaka misala ya maboko, oyo bayebi penza mosala malamu.
Sik’oyo, tika ete mokonzi, nkolo na ngai, ayoka maloba ya mosali na ye. Soki ezali Yawe nde atindaki yo kotelemela ngai, wana tika ete andima likabo. Kasi soki bato nde bazali kosala boye, wana tika ete balakelama mabe liboso ya Yawe ; pamba te babengani ngai lelo mpe balongoli ngai na libula ya Yawe, mpe balobi na ngai : « Kende kosalela banzambe mosusu. »