Balobaki : « Tokende, totonga engumba mpo na biso mpe ndako molayi oyo songe na yango ekokoma kino na lola, mpo ete kombo na biso ekende sango mpe topanzana te na mokili mobimba. »
Boye, Jakobi alobaki na Simeoni mpe na Levi : — Bopesi ngai pasi mpe bobimisi ngai moto mabe na miso ya bato ya Kanana mpe ya Perizi oyo bazali kovanda na mboka oyo. Biso tozali kaka moke ; mpe soki basangisi makasi na bango mpo na kobundisa ngai, bakoboma ngai elongo na ndako na ngai mobimba.
Balobaki na ngai : « Bayuda oyo babikaki mpe batikalaki wuta na bowumbu bazali kovanda kati na etuka ya Yuda mpe bazali na pasi mingi mpe na soni makasi ; mir ya Yelusalemi etondi na madusu, mpe bikuke na yango ebebisamaki na moto. »
Kasi kaka ndambo moke ya mito ya ble nde etikalaka ; lokola tango baningisaka nzete mpo na kobuka bambuma ya olive, bongo bambuma mibale to misato etikalaka na songe ya bitape, mpe minei to mitano etikalaka na bitape ya se, » elobi Yawe, Nzambe ya Isalaele.
Yango wana, nakobwaka bino libanda ya mokili oyo mpe nakomema bino na mokili oyo, ezala bino to batata na bino, botikala koyeba te ; mpe kuna, bokosalela banzambe ya bapaya, butu mpe moyi ; pamba te nakoyokela bino mawa te. ›
Yango wana, loba : ‹ Tala liloba oyo Nkolo Yawe alobi : Atako nabenganaki bango kati na bikolo mpe napanzaki bango kati na mabota, kasi nazalaki mpo na bango lokola ndako ya bule kati na bikolo epai wapi bakendeki. ›
Mokili ya Mesheki mpe ya Tubali ezali kuna elongo na bato na yango nyonso, zingazinga ya malita na yango. Bato nyonso oyo bakufaki na mopanga bazalaki bato bakatama ngenga te, pamba te bayeisaki somo makasi kati na mokili ya bato ya bomoi.
Nkolo, ozali sembo ; kasi biso, lelo, tolatisami na soni : bato ya Yuda, bavandi ya Yelusalemi mpe bana nyonso ya Isalaele, ezala ba-oyo bazali pembeni to ba-oyo bazali mosika, kati na mikili nyonso epai wapi opanzaki biso mpo ete tozangaki boyengebene liboso na Yo !
Na bongo, napanzaki bango kati na bikolo nyonso epai wapi bakomaki bapaya, mpe mokili na bango ebebisamaki makasi : moto moko te akokaki lisusu kokota to kobima kuna. Ndenge wana nde bakomisaki mokili ya kitoko libebi. »
Yawe akomema bino mpe mokonzi oyo bokopona mpo na koyangela bino, na ekolo oyo bino mpe bakoko na bino botikala nanu koyeba te. Kuna bokogumbamela banzambe mosusu : banzambe ya banzete mpe ya mabanga.
Yawe, Nzambe na yo, akoyokela yo mawa : akozongisa bato na yo, oyo bakendeki na bowumbu mpe akosangisa bino lisusu wuta na bikolo nyonso epai wapi apanzaki bino.