« Tala liloba oyo Yawe alobi : Telema kati na lopango ya Tempelo ya Yawe mpe loba na bato nyonso ya bingumba ya Yuda, oyo bayaka kogumbamela Yawe kati na Tempelo. Yebisa bango maloba nyonso oyo nasili kotinda yo ; kolongola ata liloba moko te.
Pamba te, nazali koloba na bino penza ya solo : liboso ete Likolo mpe mabele elimwa, nkoma moko te oyo eleki moke to litono oyo ezalaka na likolo ya i ekotikala kolongwa kati na Mobeko, kino makambo nyonso ekokisama.
Bandeko na ngai, tozwa nanu ndakisa moko kati na bomoi na biso ya mokolo na mokolo : Soki moto atiki maloba na ye ya suka kati na mokanda, moko te akoki kolongola to kobakisa eloko kati na makambo oyo esili kokomama.
Na mokolo ya liboso ya sanza ya zomi na moko, na mobu ya minei, Moyize alobaki na bana ya Isalaele makambo nyonso oyo Yawe atindaki ye na tina na bango.
Batela bikateli mpe mitindo na Ye, oyo nazali kopesa yo lelo mpo ete ozala moto ya esengo, yo mpe bana na yo sima na yo, mpe mpo ete owumela tango molayi na mokili oyo Yawe, Nzambe, na yo apesi yo mpo na libela.
Oh, soki mitema na bango ezalaki penza ya kobongama mpo na kobanga Ngai mpe kobatela mibeko na Ngai tango nyonso, mpo ete bakoka kozala tango nyonso malamu elongo na bana na bango !
Kasi zala makasi mpe yika mpiko, sala keba ete otosa mibeko nyonso oyo Moyize, mowumbu na Ngai, apesaki yo ; komeka te kobima libanda na yango, ezala na ngambo ya loboko ya mobali to na ngambo ya loboko ya mwasi, mpo ete okoka kolonga na makambo nyonso oyo okosala.
Jozue azangisaki te kotanga, liboso ya lisanga mobimba ya Isalaele, basi, bana mpe bapaya oyo bazalaki kati na bango, maloba nyonso oyo Moyize akomaki.