Deteronomi 4:1 - Mokanda na Bomoi1 Sik’oyo Isalaele, yoka malamu mitindo mpe mibeko oyo nalingi koteya yo. Salela yango mpo ete ozala na bomoi mpe okamata mokili oyo Yawe, Nzambe ya bakoko na yo, apesi yo. အခန်းကိုကြည့်ပါ။ |
Kasi bana mpe batombokelaki Ngai, balandaki bikateli na Ngai te, babatelaki te na bokebi mibeko na Ngai, oyo moto asengeli kotosa mpo ete abika na nzela na yango, mpe babebisaki bosantu ya mikolo na Ngai ya Saba. Boye, namilobelaki ete nakotombokela bango makasi mpe nakopelisela bango kanda na Ngai kati na esobe.