Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Deteronomi 34:4 - Mokanda na Bomoi

4 Bongo Yawe alobaki na ye : « Tala mokili oyo nalakaki kopesa, na nzela ya ndayi, epai ya Abrayami, Izaki mpe Jakobi, tango nalobaki na bango : ‹ Nakopesa yango epai ya bakitani na bino. › Nasali ete omona yango na miso na yo moko, kasi okokota kuna te. »

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Deteronomi 34:4
15 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Yawe amimonisaki epai ya Abrami mpe alobaki : « Nakopesa mokili oyo epai ya bakitani na yo. » Boye Abrami atongaki na esika yango etumbelo mpo na Yawe oyo amimonisaki epai na ye.


Mokili nyonso oyo ozali komona, nakopesa yango epai na yo mpe na bakitani na yo mpo na libela.


Nakopesa lokola libula ya seko na seko, epai na yo mpe epai ya bakitani na yo sima na yo, mokili nyonso ya Kanana epai wapi ozali mopaya. Nakozala Nzambe ya bakitani na yo. › »


Vanda kati na mokili oyo ; nakozala na yo elongo mpe nakopambola yo, pamba te nakopesa mabele oyo nyonso epai na yo mpe epai ya bana na yo ; nakokokisa ndayi oyo nalapaki epai ya Abrayami, tata na yo.


Mpe Yawe atelemaki likolo ya ematelo mpe alobaki na ye : « Nazali Yawe, Nzambe ya koko na yo Abrayami mpe Nzambe ya Izaki. Nakopesa epai na yo mpe na bana na yo mabele oyo, esika olali.


Kasi Yawe alobaki na Moyize mpe Aron : « Lokola bondimeli Ngai te mpe bopesi lokumu na bosantu na Ngai te na miso ya bana ya Isalaele, bokokotisa lisusu lingomba oyo te na mokili oyo napesi bango. »


pamba te Mibeko eyaki na nzela ya Moyize, kasi ngolu mpe solo eyaki na nzela ya Yesu-Klisto.


Likolo na bino, Yawe asilikelaki mpe ngai ; alobaki : « Yo mpe lisusu okokota te kati na mokili yango.


Tala, napesi bino mokili oyo. Bokota mpe bokamata mokili oyo Yawe alakaki kopesa, na nzela ya ndayi, epai ya bakoko na bino —Abrayami, Izaki, Jakobi— mpe bakitani na bango. › »


Yango wana okomona mokili yango kaka na mosika, okokota te na mokili oyo nalingi kopesa na bana ya Isalaele. »


Boye, Yawe apesaki na Isalaele mokili nyonso oyo alakaki kopesa epai ya batata na bango na nzela ya ndayi. Bana ya Isalaele bazwaki yango mpe bakomaki kovanda kuna.


Bakitani ya Keni oyo azalaki bokilo ya Moyize balongwaki na engumba ya banzete ya Mbila elongo na bato ya libota ya Yuda, mpe bakendeki kovanda esika moko na bavandi ya esobe ya Yuda, oyo ezali na sude ya Aradi.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ