Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Deteronomi 34:1 - Mokanda na Bomoi

1 Wuta na bitando ya Moabi, Moyize amataki na likolo ya ngomba Nebo kino na songe ya ngomba Pisiga oyo etalana na Jeriko. Kuna, Yawe alakisaki ye mokili mobimba : wuta na Galadi kino na Dani,

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Deteronomi 34:1
16 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Sima na bokabwani ya Abrami na Loti, Yawe alobaki na Abrami : « Na esika oyo ozali, tombola miso na yo mpe tala na ngambo ya nor, ya sude, ya este mpe ya weste.


Tango Abrami ayokaki ete bakangi ndeko na ye, abengisaki bato nkama misato na zomi na mwambe oyo bayebi kobunda mpe babotama na ndako na ye. Boye balandaki bango kino na Dani.


Na nzela ya bimoniseli, Nzambe amemaki ngai kati na Isalaele mpe atiaki ngai na likolo ya ngomba moko ya molayi makasi ; mpe na likolo ya ngomba yango, na ngambo ya sude, ezalaki na bandako batonga lokola engumba.


mpe kolongwa na Bamoti bakendeki kino na lubwaku ya Moabi, na songe ya ngomba Pisiga, oyo eleki molayi na esobe.


Boye, Balaki amemaki Balami na elanga ya Tsofimi, na songe ya ngomba Pisiga, mpe atongaki kuna bitumbelo sambo mpe abonzaki bangombe ya mibali mpe bameme ya mibali wana na etumbelo moko na moko.


Yawe alobaki na Moyize : — Mata likolo ya bangomba ya Abarimi, mpe tala mokili oyo napesaki epai ya bana ya Isalaele.


Kolongwa na Alimoni-Dibilatayimi, bakendeki kotonga molako na bango na bangomba Abarimi, pembeni ya Nebo.


Mata na songe ya ngomba Pisiga mpe tala na ngambo ya weste, na nor, na sude mpe na este. Tala kaka mokili na miso kasi okotikala kokatisa Yordani te.


« Mata na ngomba Abarimi, ngomba Nebo oyo ezali kati na Moabi mpe etalana na Jeriko ; mpe tala mokili ya Kanana, mokili oyo nazali kopesa epai ya bana ya Isalaele lokola libula na bango.


Yango wana okomona mokili yango kaka na mosika, okokota te na mokili oyo nalingi kopesa na bana ya Isalaele. »


Bongo Yawe alobaki na ye : « Tala mokili oyo nalakaki kopesa, na nzela ya ndayi, epai ya Abrayami, Izaki mpe Jakobi, tango nalobaki na bango : ‹ Nakopesa yango epai ya bakitani na bino. › Nasali ete omona yango na miso na yo moko, kasi okokota kuna te. »


Kasi bakitani ya Dani balongaki te kobotola eteni ya mabele na bango, boye bakendeki kobundisa Leshemi mpe babotolaki yango. Babomaki bato ya Leshemi na mopanga, babotolaki yango mpe bakomaki kovanda kuna. Bakomaki kobenga Leshemi « Dani, » kombo ya koko na bango.


Boye bakitani ya Ribeni, ya Gadi, mpe ya ndambo ya libota ya Manase batikaki bana mosusu ya Isalaele, na Silo, kati na mokili ya Kanana mpo na kozonga na Galadi, mokili na bango moko, oyo basilaki kozwa, kolanda mitindo oyo Yawe apesaki na nzela ya Moyize.


Bongo kati na Molimo, amemaki ngai na likolo ya ngomba moko ya monene mpe ya molayi ; alakisaki ngai Yelusalemi, engumba ya bule, oyo ezalaki kokita wuta na Lola epai ya Nzambe.


Bapesaki engumba yango kombo « Dani. » Ezalaki kombo ya koko na bango, Dani, mwana mobali ya Isalaele. Na kala, bazalaki kobenga engumba yango Laishi.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ