Yoka sik’oyo toli oyo nalingi kopesa yo, mpe tika ete Nzambe azala na yo. Mosala na yo ezali : kozala molobeli ya bato liboso ya Nzambe, komema mikumba na bango epai ya Nzambe
Tala liloba oyo Yawe alobi, Ye oyo asalaki yo, abongisaki yo wuta na libumu ya mama na yo mpe asungaka yo : Oh Jakobi, mowumbu na Ngai, kobanga te ; yo, Yeshuruni, oyo naponaki.
Amonaka mbeba moko te epai ya Jakobi, amonaka minyoko te kati na Isalaele. Yawe, Nzambe na bango, azali elongo na bango ; koganga ya mokonzi ezalaka kati na bango.
Yeshuruni akomaki monene mpe moto makasi ; atondaki na biloko ya kolia, akomaki kilo mpe moselu ; asundolaki Nzambe oyo akelaki ye mpe abwakaki Libanga na ye, Mobikisi na ye.
Bana ya Isalaele balobaki na Jedeon : — Zala mokonzi na biso, yo moko, mwana na yo ya mobali mpe koko na yo ya mobali, pamba te obikisi biso na loboko ya bato ya Madiani.
« Botuna nanu motuna oyo epai ya bakambi nyonso ya engumba Sishemi : ‹ Eloko nini eleki malamu mpo na bino ? Bakamba bino na bana mibali tuku sambo ya Yerubali to na mwana mobali moko ? › Boyeba ete ngai mpe bino tozali makila moko mpe nzoto moko. »