4 Moyize apesa biso Mobeko oyo ezali bozwi ya lisanga ya Jakobi.
Malako na Yo ezali libula na ngai mpo na libela, esalaka esengo ya motema na ngai.
Mpo na ngai, mibeko oyo ozwaki mpe osakolaki na monoko na Yo ezali malamu koleka biloko nkoto moko ya wolo mpe ya palata.
Asakolaki liloba na Ye epai ya Jakobi, mibeko mpe malako na Ye epai ya Isalaele.
Oyo nde bikateli, mitindo mpe mibeko oyo Yawe atiaki kati ya Ye mpe bana ya Isalaele, na ngomba Sinai, na nzela ya Moyize.
pamba te Mibeko eyaki na nzela ya Moyize, kasi ngolu mpe solo eyaki na nzela ya Yesu-Klisto.
Boni, Moyize apesaki bino mibeko te ? Nzokande moko te kati na bino atosaka yango ! Bongo mpo na nini bozali koluka koboma Ngai ?
Kobakisa eloko moko te na oyo natindi yo mpe kolongola eloko moko te kati na yango, kasi tosa mitindo oyo Yawe, Nzambe na yo, apesi yo.