Oh Yawe, nani kati na banzambe azali lokola Yo ? Nani azali lokola Yo, kitoko makasi kati na bosantu, somo, mpe abongi na lokumu, mpe asalaka makambo ya kokamwa ?
Maloba ya Yawe mpo na kosambisa Ejipito : Tala, Yawe amati likolo ya mapata oyo ekendaka mbangu, azali koya na Ejipito. Banzambe ya bikeko ya Ejipito ezali kolenga liboso na Ye mpe mitema ya bato ya Ejipito elembi-lembi kati na bango.
Tala liloba oyo Yawe alobi, Ye oyo asalaki yo, abongisaki yo wuta na libumu ya mama na yo mpe asungaka yo : Oh Jakobi, mowumbu na Ngai, kobanga te ; yo, Yeshuruni, oyo naponaki.
Nani ayoka likambo ya boye ? Nani amona makambo ya boye ? Boni, mokili ekoki kobotama na mokolo moko to ekolo ekoki solo kosalema na mbala moko ? Nzokande, kaka tango Siona ayoki pasi ya kobota, tala ye wana asili kobota bana na ye.
Oh Yawe, otombokelaki nde bibale ? Osopelaki nde miluka kanda na Yo ? Osilikelaki nde ebale monene tango ozalaki kotambola likolo ya bampunda, likolo ya bashar na Yo ya lokumu ?
Yeshuruni akomaki monene mpe moto makasi ; atondaki na biloko ya kolia, akomaki kilo mpe moselu ; asundolaki Nzambe oyo akelaki ye mpe abwakaki Libanga na ye, Mobikisi na ye.