24 Mpo na Aseri, alobaki : « Aseri azali mwana mobali oyo aleki na mapamboli. Tika ete bandeko na ye basalela ye mpe tika ete makolo na ye ezinda na mafuta.
Kati na ndako na yo, mwasi na yo azali lokola nzete ya vino oyo ebotaka bambuma ebele ; bana na yo bazali lokola bankona ya nzete ya olive zingazinga ya mesa na yo.
mpe akangolaki ye na minyoko na ye nyonso ; Apesaki ye bwanya mpe asalelaki ye ngolu na miso ya Faraon, mokonzi ya Ejipito, oyo akomisaki ye moyangeli ya Ejipito mpe ya ndako na ye mobimba.