23 Mpo na Nefitali alobaki : « Nefitali atondi na bolamu mpe na mapamboli na Yawe, akozwa libula ya weste mpe ya sude. »
Nefitali azali lokola mboloko ya nsomi, oyo ebotaka bana kitoko.
Oh Nzambe, tala ndenge nini bolingo na Yo ezali motuya ! Bato bazwaka ebombamelo na elili ya mapapu na Yo.
Tongo nyonso, tondisaka biso na bolingo na Yo mpe tokoganga na esengo, mpe tokosepela mikolo nyonso ya bomoi na biso.
Nakoleisa malamu Banganga-Nzambe na mafuta ya bibwele, mpe bato na Ngai bakotonda na biloko na Ngai, › » elobi Yawe.
Boya epai na Ngai, bino nyonso oyo bolembi na mikumba ; Ngai, nakopesa bino bopemi.
Kasi avandaki na Nazareti te ; akendeki nde kovanda na Kapernawumi oyo ezalaki pembeni ya ebale, kati na etuka ya Zabuloni mpe ya Nefitali,
bato oyo bazalaki kovanda kati na molili bamoni pole makasi ; ba-oyo bazalaki kovanda kati na mokili ya bakufi, pole ebimeli bango. »
Mpo na Aseri, alobaki : « Aseri azali mwana mobali oyo aleki na mapamboli. Tika ete bandeko na ye basalela ye mpe tika ete makolo na ye ezinda na mafuta.