Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Deteronomi 33:22 - Mokanda na Bomoi

22 Mpo na Dani, alobaki : « Dani azali mwana ya nkosi oyo epumbwaka wuta na Bashani. »

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Deteronomi 33:22
14 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

kati na libota ya Nefitali : bakonzi ya basoda nkoto moko, elongo na basoda nkoto tuku misato na sambo oyo babundaka na nguba mpe makonga ;


Mpo na yango, motema na ngai ezali kolenga mpe ezali kobeta makasi lokola nde elingi kobima na esika na yango.


‹ Mama na yo azalaki nani ? Nkosi ya mwasi kati na bankosi ! Ezalaki kovanda kati na bana na yango mpe kobokola bana yango.


Ekolisaki moko kati na bana na yango, mpe mwana yango ekomaki nkosi moko ya makasi. Bongo, eyekolaki kopasola banyama mpe kolia bato.


Kasi bakitani ya Dani balongaki te kobotola eteni ya mabele na bango, boye bakendeki kobundisa Leshemi mpe babotolaki yango. Babomaki bato ya Leshemi na mopanga, babotolaki yango mpe bakomaki kovanda kuna. Bakomaki kobenga Leshemi « Dani, » kombo ya koko na bango.


Ezalaki na mobali moko, moto ya Tsorea, ya libota ya Dani, kombo na ye ezalaki Manoa ; mwasi na ye azalaki ekomba, mpe abotelaki ye bana te.


Bongo Molimo na Yawe akitelaki Samison na nguya. Akendeki na Ashikeloni mpe abomaki bato tuku misato, azwaki bilamba na bango mpe apesaki yango epai ya bato oyo bapesaki ye ndimbola ya lisese. Azongaki na ndako ya tata na ye na kanda makasi.


Molimo na Yawe akitelaki Samison na nguya. Boye, Samison apasolaki nkosi na kati-kati, na maboko pamba, ndenge bapasolaka mwana ntaba. Kasi kati na makambo oyo asalaki, ayebisaki eloko moko te epai ya tata to mama na ye.


Samison amonaki mokuwa ya mobesu ya mbanga ya ane, asembolaki loboko na ye, alokotaki mokuwa yango mpe abomaki na yango bato nkoto moko.


Samison abundisaki bango mpe abomaki ebele kati na bango. Bongo akendeki mpe avandaki kati na lidusu ya mabanga, na Etami.


Bongo Samison alobaki : « Tika ete nakufa elongo na bato ya Filisitia ! » Bongo atindikaki na makasi na ye nyonso, mpe tempelo ekweyelaki bakambi mpe bato nyonso oyo bazalaki kuna. Boye, kati na kufa na ye, abomaki bato ebele koleka na tango oyo azalaki na bomoi.


Bana ya libota ya Dani babotolaki biloko oyo Mika asalaki mpe nganga-nzambe na ye. Bongo bakendeki kobundisa engumba Laishi, mboka ya bato ya kimia mpe ya kozanga nungunungu ; babomaki bato nyonso na mopanga mpe batumbaki engumba na bango na moto.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ