Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Deteronomi 33:20 - Mokanda na Bomoi

20 Mpo na Gadi, alobaki : « Tika ete apambolama, moto oyo akoyeisa mokili ya Gadi monene ! Gadi akowumela kuna lokola nkosi oyo ezali kopasola banda na lokolo kino na moto.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Deteronomi 33:20
14 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Gadi, banguna ebele bakobundisa ye, kasi ye mpe akobundisa bango kino kobengana bango.


Yuda, ozali mwana ya nkosi ; mwana na ngai ya mobali, owuti na bokila. Agunzami mpe alali lokola nkosi ya mobali ; mpe lokola nkosi ya mwasi, nani akomeka kotelemisa ye ?


Yaebetsi abelelaki Yawe, Nzambe ya Isalaele ; alobaki : « Oh Yawe ! Soki okoki kopambola ngai mpe koyeisa mabele na ngai monene ! Tika ete loboko na Yo ezala likolo na ngai ! Bomba ngai mosika ya mabe mpo ete namona pasi te. » Mpe Nzambe ayanolaki libondeli na ye.


Babundisaki ngai, na mokolo oyo pasi ezalaki kokanga ngai, kasi Yawe azalaki eyekamelo na ngai.


Okomisaka lobiko na Yo nguba na ngai, loboko na Yo ya mobali elendisaka ngai, mpe lisungi na Yo ekomisaka ngai makasi.


Mpe lisusu, bato ya Mefisi mpe ya Dafine babuki moto na yo.


Tika ete loboko na yo elonga banguna na yo, mpe bayini na yo nyonso babebisama nye !


mpe bingumba nyonso ya Sikoni, mokonzi ya bato ya Amori, oyo azalaki kokonza na Eshiboni kino na bandelo ya bato ya Amoni.


Bato ya ndambo mosusu ya libota ya Manase, elongo na bato ya libota ya Ribeni mpe ya Gadi bazwaki libula oyo Moyize, mowumbu na Yawe, apesaki bango na ngambo ya este ya Yordani.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ