Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Deteronomi 33:16 - Mokanda na Bomoi

16 na nzela ya bambuma oyo eleki kitoko, bambuma oyo etondi kati na mokili ! Tika ete Nzambe oyo avandaka kati na nzete moke oyo ezali kopela moto apambola moto ya Jozefi mpe elongi ya moto oyo babulisi kati na bandeko na ye !

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Deteronomi 33:16
22 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Nzokande tango bato ya mombongo ya mokili ya Madiani balekaki wana, babimisaki Jozefi wuta na libulu mpe batekaki ye epai ya bato ya ekolo ya Isimaeli, na motuya ya mbongo ya bibende, tuku mibale ; mpe bango bamemaki ye na Ejipito.


Bato ya mokili ya Madiani batekaki Jozefi na Ejipito epai ya Potifari, kalaka ya lokumu ya Faraon mpe mokonzi ya bakengeli ya mokonzi.


Bandeko na ye ya mibali balobaki na ye : — Okanisi ete okokoma mokonzi na biso mpe okokonza biso ? Bongo bayinaki ye lisusu koleka likolo ya ndoto na ye mpe likolo ya makambo oyo alobaki.


Batielaki Jozefi bilei na mesa na ye moko, bandeko na ye mpe na mesa na bango ; bongo bato ya Ejipito oyo bazalaki kolia na ye esika moko, bango mpe na mesa na bango, pamba te bato ya Ejipito bakokaki te kolia esika moko na Ba-Ebre, pamba te ezalaki ekila mpo na bato ya Ejipito.


Mapamboli ya tata na yo ezali na motuya koleka mapamboli ya bangomba ya kala, koleka bomengo ya bangomba mike ya kala ; tika ete mapamboli nyonso ekita na moto ya Jozefi, ekitela ye oyo atombolami kati na bandeko na ye !


Nzembo ya Davidi. Mabele mpe nyonso oyo ezali kati na yango ezali ya Yawe. Mokili mpe ezali ya Yawe, elongo na bavandi na yango.


Soki nazalaki na nzala, nalingaki koyebisa yo te, pamba te mokili mpe nyonso oyo ezali kati na yango ezali ya ngai.


Yo nde olongaki Rahavi, dalagona ya Ejipito, kino koboma ye ; mpe, na nguya na Yo, opanzaki banguna na Yo.


Mwana mwasi yango azwaki zemi mpe abotaki mwana mobali. Wana amonaki ete mwana yango azali kitoko, abombaki ye basanza misato.


Lokito ya bampunda ya banguna mpe makelele ya makolo na yango ezali koyokana wuta na Dani, ezali koya mpo na kobebisa mokili mpe biloko nyonso oyo ezali kati na yango, engumba mpe bavandi na yango nyonso, bongo mokili mobimba eningani.


Bakitani ya Jozefi kolanda mabota na bango na nzela ya Manase mpe Efrayimi bazalaki :


Mpo na oyo etali lisekwa ya bakufi, botikala nanu kotanga te kati na buku ya Moyize, makambo oyo Nzambe alobaki na ye na tina na nzete oyo ezalaki kopela moto kasi ezalaki kozika te : « Nazali Nzambe ya Abrayami, Nzambe ya Izaki, mpe Nzambe ya Jakobi ? »


« Nkembo na Nzambe kati na bisika oyo eleki likolo, mpe kimia na mabele kati na bato oyo alingaka ! »


Kaka Moyize oyo bandeko na ye baboyaki na koloba na ye : « Nani atie yo mokonzi mpe mosambisi, » ye nde Nzambe atindaki mpo ete azala mokonzi mpe mokangoli na bango, na lisungi ya anjelu oyo abimelaki ye na mwa nzete.


Pamba te mabele mpe nyonso oyo ezali kati na yango ezali ya Nkolo.


Kasi soki moto moko alobi na yo : « Mosuni oyo ebonzamaki lokola mbeka epai ya nzambe ya ekeko, » kolia yango te, likolo ya moto oyo akebisi yo mpe mpo ete obebisa te motema na yo.


Boye, Yesu nde azali Mokonzi ya Banganga-Nzambe, oyo abongi mpo na biso : azali Bule, asala ata mabe moko te, azali peto, akabwana na bato ya masumu, mpe Nzambe atombola Ye penza likolo koleka Likolo,


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ