Mapamboli ya tata na yo ezali na motuya koleka mapamboli ya bangomba ya kala, koleka bomengo ya bangomba mike ya kala ; tika ete mapamboli nyonso ekita na moto ya Jozefi, ekitela ye oyo atombolami kati na bandeko na ye !
Tango atelemaki, mabele ekomaki koningana makasi ; tango abalolaki elongi na Ye mpo na kotala, bato ya bikolo bakomaki kolenga, bangomba milayi oyo ya kala-kala ebukanaki, mpe bangomba mikuse oyo ya kala-kala ekitaki ; kasi banzela na Ye ewumelaka seko na seko.
Bandeko, boyika mpiko kino na mokolo oyo Nkolo akoya. Botala ndenge mosali bilanga azelaka bambuma kitoko ya mabele : akangaka motema wuta tango oyo aloni elanga na ye kino na eleko ya kobuka bambuma.