Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Deteronomi 33:14 - Mokanda na Bomoi

14 elongo na biloko oyo eleki motuya, oyo mayi ekolisaka mpe oyo eleki kitoko, oyo ebimaka sanza na sanza ;

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Deteronomi 33:14
15 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

azali lokola pole ya tongo, tango moyi ebimaka mpe engalaka makasi lokola nde mapata ezali te, lokola kongenga ya sima na mvula oyo ebimisaka matiti na mokili. ›


Osala sanza mpo na koyeba mikolo ya bafeti. Moyi eyebi tango na yango ya kolala.


Moyi ezali ya Yo, butu mpe ezali ya Yo ; Yo nde osalaki sanza mpe moyi.


Na nzela ya masanzoli ya bana mpe bana mike, otelemisi ndako batonga makasi, mpo na kotelemela bayini na Yo mpe kokanga monoko ya monguna mpe ya moto oyo alingaka kozongisa mabe na mabe.


Lokola kovanda mokolo moko kati na lopango na Yo eleki kovanda mikolo nkoto moko na esika mosusu, naponaki kotelema na ekotelo ya Ndako ya Nzambe na ngai na esika ete navanda kati na bandako ya kapo ya bato mabe.


nakonokisela bino mvula na tango na yango ; mabele mpe banzete ya zamba ekobota bambuma na yango.


Na ndenge wana nde bokozala bana ya Tata na bino, oyo azali kati na Likolo, pamba te abimisaka moyi mpo na bato malamu mpe mpo na bato mabe, mpe anokisaka mvula mpo na bato ya sembo mpe mpo na bato oyo bazali sembo te.


Nzokande, atikalaki kolemba te kotalisa bolamu na Ye, na nzela ya konokisela bango mvula kowuta na likolo, kopesa bango bambuma ebele na tango na yango, mpe kopesa bango bilei ebele mpe kotondisa mitema na bango na esengo.


Yawe Nzambe akopambola bibombelo na bino ya biloko mpe akopambola misala nyonso ya maboko na bino. Yawe Nzambe akopambola bino na mokili oyo azali kopesa bino.


Mpo na Jozefi, alobaki : « Tika ete Yawe apambola mokili na ye na nzela ya mamwe ya motuya, oyo ewutaka na likolo, mpe na nzela ya mayi ya mozindo oyo etiolaka na se ya mabele


na nzela ya bakado ya kitoko ya bangomba ya kala, mpe na nzela ya bambuma oyo eleki kitoko ya bangomba mike oyo ewumelaka mobu na mobu ;


Pesa mitindo epai ya bazwi kati na mokili oyo ete bazala na lolendo te mpe batia elikya te na bomengo, pamba te bomengo ekoki kosila ; kasi tika ete batia elikya na bango kati na Nzambe oyo apesaka biso biloko nyonso, na bofuluki, mpo ete tosepela na yango.


Ezalaki kotiola na kati-kati ya balabala monene ya engumba. Na esika oyo ebale ekabwanaki na biteni mibale, ezalaki na nzete ya bomoi oyo ebotaka bambuma mbala zomi na mibale na mobu, elingi koloba ete ebotaka bambuma sanza na sanza ; mpe makasa na yango ebikisaka bikolo.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ