Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Deteronomi 33:13 - Mokanda na Bomoi

13 Mpo na Jozefi, alobaki : « Tika ete Yawe apambola mokili na ye na nzela ya mamwe ya motuya, oyo ewutaka na likolo, mpe na nzela ya mayi ya mozindo oyo etiolaka na se ya mabele

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Deteronomi 33:13
20 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Jakobi akendeki mpe apesaki ye beze. Tango Izaki ayokaki solo ya bilamba na ye, apambolaki ye na maloba oyo : « Ah ! Solo ya mwana na ngai ezali lokola solo ya bilanga oyo Yawe apamboli.


Tata na ye, Izaki, alobaki na ye : — Okovanda mosika ya mabele oyo ebotaka malamu, mpe mosika ya mvula ya likolo.


Mpe sik’oyo, bana na yo ya mibali oyo babotamaki na Ejipito liboso ete ngai naya awa, bakomi lokola bana na ngai. Efrayimi mpe Manase bakomi bana na ngai lokola Ribeni mpe Simeoni.


Jozefi azongiselaki tata na ye : — Bazali bana mibali oyo Nzambe apesi ngai awa. Isalaele alobaki : — Pusa bango mpo ete napambola bango.


Misisa na ngai ekoluka mayi, mpe mayi oyo ezalaka na matiti ekovanda butu mobimba na bitape na ngai.


Na mokolo oyo okotanda basoda na yo na molongo mpo na bitumba, bato na yo bakotonda na mpiko, bilenge basoda na yo nyonso bakoya na lombangu epai na yo ndenge mamwe ebimaka na tongo.


Bokumisa Yawe wuta na mokili, ezala bilima ya mayi to mozindo nyonso,


Kanda ya mokonzi ezali lokola koganga ya nkosi, kasi bolamu na ye ezali lokola mamwe.


Na nzela ya mayele na Ye, mozindo ya se ya mabele ebimisaki mayi mpe mapata enokisaki mvula.


Pamba te, tala liloba oyo Yawe alobi na ngai : « Nakovanda kimia mpe nakotala wuta na ndako na Ngai, lokola kongala ya moyi to lokola mapata na tango ya molunge. »


Nakobikisa bango na mabe na bango mpe nakolinga bango na motema moko, pamba te kanda na Ngai elongwe kati na bango.


Batikali ya Jakobi bakozala kati na mabota, na kati-kati ya bikolo ebele, lokola nkosi kati na banyama ya zamba, lokola mwana nkosi kati na etonga ya bameme : tango elekaka kati na etonga ya bameme, ekangaka mpe epasolaka yango, mpe moto oyo akoki kokangola yango azalaka te.


« Solo, milona ekokola malamu, bilanga ya vino ekobota bambuma na yango, mabele ekobimisa biloko ebele, mpe likolo ekonokisa mvula. Nakopesa biloko oyo nyonso lokola libula epai ya batikali kati na bato oyo.


Mpo na bana mibali ya Jozefi : Mpo na bakitani ya Efrayimi : bakomaki bakombo ya bato nyonso oyo bazalaki na mibu tuku mibale mpe koleka, oyo bazalaki na makoki ya kosala mosala ya soda, moto na moto kolanda libota na ye mpe etuka na ye.


Tika ete mateya na ngai ekweya lokola mvula, mpe maloba na ngai ekita lokola londende, lokola mvula moke na likolo ya matiti, lokola mvula makasi na likolo ya milona !


elongo na biloko oyo eleki motuya, oyo mayi ekolisaka mpe oyo eleki kitoko, oyo ebimaka sanza na sanza ;


Boye Isalaele akowumela na kimia, mpe etima ya Jakobi ezali kotiola kati na mokili ya ble mpe ya vino ya sika, epai wapi likolo ezali kokitisa mamwe.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ