Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Deteronomi 33:11 - Mokanda na Bomoi

11 Oh Yawe, pambola makasi na ye na mosala, mpe sepela na mosala ya maboko na ye. Buka loketo ya bato oyo bazali kotelemela ye, mpe loketo ya bayini na ye kino bakoka lisusu te kotelema. »

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Deteronomi 33:11
18 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Oh mokonzi, napesi yo nyonso ! Orina alobaki lisusu na mokonzi : — Tika ete Yawe, Nzambe na yo, ayamba malamu bambeka na yo !


Tika ete asunga yo wuta na Esika na Ye ya bule mpe apesa yo makasi wuta na Siona.


elongo na bato oyo bakweyisaka bato kati na kosamba mpo na liloba moko, elongo na bato oyo batielaka basambisi mitambo mpe bapesaka matatoli ya lokuta, na kosambisama, mpo na kokweyisa moto ya sembo.


Oh mama na ngai, mawa na ngai ! Mpo na nini obotaki ngai ! Nazali moto oyo mokili mobimba eswanisaka mpe etelemelaka. Nadefisa moto moko te eloko mpe nadefa eloko ya moto moko te, kasi bato nyonso balakelaka ngai kaka mabe.


Tika ete banyokoli na ngai bayokisama soni, kasi batela ngai ete nayokisama soni te ! Tika ete bango balenga na somo, kasi ngai nalenga na somo te. Tindela bango mokolo ya pasi, bebisa bango malamu mbala mibale.


Na suka ya mikolo yango, kobanda na mokolo ya mwambe kino na mikolo oyo ekolanda, Banganga-Nzambe bakobonza na etumbelo bambeka na bino ya kotumba mpe bambeka ya boyokani, mpe Ngai, nakoyamba bino, elobi Nkolo Yawe. »


Bino bato boyinaka moto oyo akataka makambo na bosembo mpe botiolaka moto oyo alobaka solo,


Moto oyo atosi bino atosi nde Ngai, moto oyo aboyi bino aboyi nde Ngai, nzokande moto oyo aboyi Ngai aboyi nde Motindi na Ngai.


Ateyaka makebisi na Yo epai ya Jakobi, mpe mibeko na Yo epai ya Isalaele ; abonzaka ansa liboso na Yo, mpe mbeka ya kotumba na likolo ya etumbelo na Yo.


Mpo na Benjame, alobaki : « Tika ete molingami ya Yawe azala na kimia pembeni na Ye, pamba te Ye nde abatelaka ye mokolo mobimba ; mpe moto oyo Yawe alingaka apemaka na kati-kati ya mapeka na Ye ! »


Boye moto oyo atosaka mitindo yango te atiolaka moto te kasi atiolaka nde Nzambe oyo apesaki bino Molimo Mosantu na Ye.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ