Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Deteronomi 33:10 - Mokanda na Bomoi

10 Ateyaka makebisi na Yo epai ya Jakobi, mpe mibeko na Yo epai ya Isalaele ; abonzaka ansa liboso na Yo, mpe mbeka ya kotumba na likolo ya etumbelo na Yo.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Deteronomi 33:10
37 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Batelemelaki mokonzi Oziasi mpe balobaki na ye : « Oziasi, kotumba mbeka ya malasi mpo na Yawe ezali mosala na yo te ! Ezali nde mosala ya Banganga-Nzambe, bakitani ya Aron, oyo babulisama mpo na mosala yango. Bima wuta na Esika ya bule, pamba te ozali kosala likambo ya nkele, mpe Yawe Nzambe akosepela na yo te ! »


Ezekiasi alendisaki Balevi nyonso oyo balakisaki ete bayebi malamu mosala ya Yawe. Na mikolo sambo ya feti, baliaki misuni ya bambeka, babonzaki bambeka ya boyokani mpe basanzolaki Yawe, Nzambe ya bakoko na bango.


mpo ete Esidrasi amipesaki ye moko penza, na motema na ye mobimba, mpo na koyekola mpe kotia na misala mibeko ya Yawe mpe mpo na kolakisa na bana ya Isalaele bikateli mpe mitindo ya mibeko yango.


Mokolo na mokolo, kobanda na mokolo ya liboso kino na mokolo ya suka, Esidrasi azalaki kotanga buku ya Mobeko ya Nzambe. Basepelaki feti mikolo sambo ; mpe na mokolo ya mwambe, kolanda malako ya Mobeko, basalaki mayangani mpo na kosukisa feti.


Nzambe, bambeka oyo osepelaka na yango ezali : molimo oyo ebukani. Nzambe, oyinaka te motema oyo etutami mpe emikitisi.


Na suka ya mikolo yango, kobanda na mokolo ya mwambe kino na mikolo oyo ekolanda, Banganga-Nzambe bakobonza na etumbelo bambeka na bino ya kotumba mpe bambeka ya boyokani, mpe Ngai, nakoyamba bino, elobi Nkolo Yawe. »


Bato na Ngai bakobebisama mpo ete bazangi boyebi. Lokola bobwaki boyebi, Ngai mpe nakobwaka bino mpe nakolongola bino na bonganga-Nzambe na Ngai. Lokola bobosani Mobeko ya Nzambe na bino, Ngai mpe nakobosana bana na bino.


akosukola na mayi biloko ya kati mpe makolo. Sima, Nganga-Nzambe akomema nyonso mpe akotumba yango na etumbelo. Ezali mbeka ya kotumba, likabo bazikisa na moto, oyo solo kitoko na yango ekosepelisa Yawe.


Sima, akofungola ndeke na kati-kati ya mapapu ; kasi akokata mapapu yango te. Bongo Nganga-Nzambe akotumba yango likolo ya bakoni oyo ezali kopela moto na etumbelo. Ezali mbeka ya kotumba, likabo bazikisa na moto, oyo solo kitoko na yango ekosepelisa Yawe.


Bakosukola na mayi biloko na yango ya kati mpe makolo na yango ; sima, Nganga-Nzambe akotumba nyonso na etumbelo. Ezali mbeka ya kotumba, likabo bazikisa na moto, oyo solo kitoko na yango ekosepelisa Yawe.


lisusu mpo ete boyeba koteya bana ya Isalaele mibeko nyonso oyo Yawe apesaki bino na nzela ya Moyize. »


akotondisa mbabola ya kotumba malasi na makala ya moto oyo ewuti na etumbelo liboso ya Yawe mpe akotondisa maboko na ye mibale na malasi ya putulu, bongo akomema yango na sima ya rido.


Akotia malasi na moto liboso ya Yawe mpo ete milinga na yango ezipa esika ya bolimbisi oyo ezali likolo ya Sanduku ya Boyokani mpo ete akufa te.


« Tala liloba oyo Yawe, Mokonzi ya mampinga, alobi : ‹ Tuna Banganga-Nzambe makambo oyo osengeli kosala kolanda mobeko :


— Soki moto moko amemi na songe ya elamba mosuni oyo ebulisama, mpe songe yango etuti lipa to ndunda to vino to mafuta to bilei mosusu, boni, ekokoma bule ? › » Banganga-Nzambe bazongisaki : — Te, ekokoma bule te !


mbeki moko ya wolo ya bagrame nkama moko na zomi etonda na ansa.


Mpo na makambo oyo etali bokono ya maba, bosala keba ete bosalela malamu malako nyonso oyo Banganga-Nzambe, ba-oyo bazali Balevi, bapesaki bino. Bosengeli kotosa malamu makambo oyo natindaki bango.


Balevi bakoloba epai ya bana nyonso ya Isalaele maloba oyo na mongongo makasi :


Oh Yawe, pambola makasi na ye na mosala, mpe sepela na mosala ya maboko na ye. Buka loketo ya bato oyo bazali kotelemela ye, mpe loketo ya bayini na ye kino bakoka lisusu te kotelema. »


Yango wana azali na makoki ya kobikisa libela, bato oyo bapusanaka pene ya Nzambe na nzela na Ye, mpo ete azali tango nyonso na bomoi mpo na kobondelaka Nzambe na tina na bango.


Pamba te Klisto akotaki te na Esika ya Bule oyo esalemaki na maboko ya bato, oyo ezalaki kaka elilingi ya Esika ya Bule ya solo ; kasi akotaki nde kati na Likolo yango moko mpo ete atelema sik’oyo liboso ya Nzambe mpo na bolamu na biso.


Naponaki tata na yo kati na bikolo nyonso ya Isalaele mpo ete asalela Ngai lokola Nganga-Nzambe, mpo ete amata na etumbelo na Ngai, atumba mbeka ya malasi mpe alata efode liboso na Ngai. Napesaki lisusu, na libota ya tata na yo, makabo nyonso ya bana ya Isalaele, makabo oyo bazikisa na moto.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ