Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Deteronomi 32:46 - Mokanda na Bomoi

46 alobaki na bango lisusu : « Bobatela malamu kati na mitema na bino maloba nyonso oyo nalobi na bino lelo, mpo ete bopesa mitindo epai ya bana na bino ete batosa penza maloba nyonso ya mibeko oyo.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Deteronomi 32:46
15 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Sik’oyo, bobongisa mitema mpe milimo na bino mpo na koluka Yawe, Nzambe na bino. Bobanda kotonga Esika ya bule ya Yawe Nzambe mpo ete boyeisa Sanduku ya Boyokani ya Yawe mpe biloko ya bule ya Nzambe, na Tempelo oyo ekotongama mpo na Kombo na Yawe. »


Apesaki malako mpo na bolamu ya Jakobi, atiaki mibeko kati na Isalaele, apesaki mitindo epai ya batata na biso ete bateya yango epai ya bana mibali na bango,


Bomoi ezalaka kati na nzela ya bosembo, mpe kufa ezalaka te kati na nzela ya bosembo.


Moto yango alobaki na ngai : « Mwana na moto, tala na miso na yo mpe yoka na matoyi na yo ! Sala keba na makambo nyonso oyo nakolakisa yo, pamba te ezali mpo na kolakisa yo yango nde namemaki yo na esika oyo. Yebisa libota ya Isalaele makambo nyonso oyo okomona. »


Yawe alobaki na ngai : « Mwana na moto, sala keba ! Fungola miso na yo mpe yoka na matoyi na yo makambo nyonso oyo nakoyebisa yo na tina na Tempelo mpe mitindo na yango ! Sala penza keba na ekotelo ya Tempelo mpe bikuke nyonso ya Esika ya bule.


Tala liloba oyo Nkolo Yawe alobi na libota ya Isalaele : « Bozonga epai na Ngai mpe bokobika !


— Boyoka na bokebi makambo oyo nazali koyebisa bino : Bazali kokaba Mwana na Moto na maboko ya bato.


Bobatela malamu kati na mitema mpe milimo na bino maloba na ngai oyo, bokanga yango na maboko na bino lokola bilembo, mpe botia yango na bilongi na bino lokola elembo.


Boteya yango na bana na bino na kolobelaka bango yango tango bovandi kati na bandako mpe tango bozali kotambola na nzela, tango bolali pongi mpe tango bolamuki.


Tango Moyize asilisaki koloba maloba oyo nyonso epai ya bana nyonso ya Isalaele,


Botosa yango mpe bosalela yango na bokebi ; yango nde ekokomisa bino bato ya bwanya mpe ya mayele na miso ya bikolo oyo bakoyoka sango ya mitindo mpe mibeko yango ; mpe bakoganga : « Solo, libota monene oyo ezali na bato ya bwanya mpe na bato ya mayele. »


Nzokande, sala keba mpe omisenzela mpo ete obosana te makambo oyo miso na yo emonaki to kotika te makambo yango elongwa na motema na yo na mikolo nyonso ya bomoi na yo. Teya yango na bana na yo mpe na bana na bango oyo bakobotama na sima na bango.


Yango wana, tosengeli kozwa lisusu na motuya makasi mateya oyo toyokaki mpo ete tobunga te.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ