Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Deteronomi 32:42 - Mokanda na Bomoi

42 Tango mopanga na Ngai ekozala kosasa misuni ya bato, nakolangwisa makonga na Ngai na makila ya bato oyo babomi, ya bakangami mpe ya mito ya bakonzi ya banguna. »

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Deteronomi 32:42
16 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Tolotolo ya Jonatan ezalaki kozonga sima te soki esopi makila ya banguna te, mpe soki etoboli mafuta ya bilombe te ; mpe mopanga ya Saulo ezalaki kozonga te soki ekokisi mosala na yango te.


Mpo na nini obombi elongi na Yo mpe ozali kozwa ngai lokola monguna na Yo ?


Kati na kongenga na Yo, zala molongi, mata na shar na Yo, telema mpo na solo, mpo na komikitisa, mpe mpo na bosembo ; tika ete loboko na Yo ya mobali esala misala minene.


Tika ete makonga na Yo ya minu etobola mitema ya banguna ya mokonzi ; tika ete bikolo ekweya na se ya matambe na Yo.


Nkolo alobi : « Wuta na Bashani, nakomema bango ; wuta na mozindo ya ebale monene, nakomema bango,


Pamba te mopanga na ngai esili kolongwa kuna na likolo ; tala, ekiti mpo na kosambisa Edomi, mpe bato oyo nabongisaki mpo na kobebisama.


Babebisi bakobimela na likolo ya bangomba nyonso ya esobe, pamba te mopanga ya Yawe ekoboma mokili mobimba ; moto moko te akozala na kimia.


Tango okotatola maloba oyo nyonso na bato oyo, soki batuni yo : ‹ Mpo na nini Yawe akateli biso etumbu ya pasi makasi boye ? Mabe nini tosalaki Ye ? Masumu nini tosalaki liboso ya Yawe, Nzambe na biso ? ›


Baninga na yo nyonso babosani yo, bazali komitungisa lisusu te mpo na yo. Nabetaki yo penza ndenge monguna abetaka, napesaki yo penza etumbu na kanda makasi, pamba te ngambo na yo ezalaki monene mpe masumu na yo eleki ebele.


Ezali mokolo ya Nkolo Yawe, Mokonzi ya mampinga ; mokolo ya kozongisa mabe na mabe, mpo na kozongisela banguna na yo mabe. Mopanga ekoboma kino ekotonda, kino ekosilisa posa na yango ya makila ; pamba te ezali nde mbeka mpo na Nkolo Yawe, Mokonzi ya mampinga, pene ya ebale Efrate, kati na etuka ya nor.


« Loba makambo oyo na Ejipito mpe tatola yango na Migidoli ; tatola yango lisusu na Mefisi mpe na Takipenesi : ‹ Bomitanda na milongo mpe bobongama, pamba te mopanga ezali koboma bato oyo bazali zingazinga na yo. ›


Yawe akomi lokola monguna : abebisi mokili ya Isalaele, abebisi bandako nyonso ya mokonzi ya Isalaele, abuki bandako na yango batonga makasi, atondisi matanga mpe kolela kati na Yuda, mboka kitoko.


Nakobakisela bango pasi likolo ya pasi, nakobwakela bango makonga na Ngai.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ