Deteronomi 32:39 - Mokanda na Bomoi39 Botala sik’oyo, Ngai kaka nde nazali Nzambe ; mosusu azali te ! Nabomaka mpe napesaka bomoi ; nazokisaka mpe nabikisaka. Mpe moto moko te akoki kokangola oyo ezali na maboko na Ngai. အခန်းကိုကြည့်ပါ။ |
Tango kaka mokonzi ya Isalaele atangaki mokanda, apasolaki bilamba na ye mpe alobaki : « Boni, ngai nazali Nzambe ? Boni, nazali na makoki ya koboma to ya kozongisa na bomoi ? Mpo na nini moto oyo atindeli ngai moto ete nabikisa ye na bokono na ye ya maba ? Botala ndenge nini azali kolukela ngai makambo ! »
Alobaki : « Soki boyoki na bokebi mongongo na Yawe, Nzambe na bino, mpe bosali oyo ezali sembo na miso na Ye, soki bosali keba na malako na Ye mpe bobateli bikateli na Ye nyonso, nakotindela bino ata bokono moko te oyo natindelaki bato ya Ejipito ; pamba te nazali Yawe oyo abikisaka bino na bokono. »