32 Bilanga na bango ya vino ewuti na bilanga ya vino ya Sodome mpe na bilanga ya Gomore. Bambuma na bango etondi na ngenge, mpe maboke ya bambuma na bango ezali bololo.
Namoni lisusu makambo ya nkele kati na basakoli ya Yelusalemi : bazali kosala kindumba mpe kowumela na lokuta, bazali kolendisa bato oyo basalaka mabe mpo ete batika te misala na bango ya mabe. Bango nyonso bazali liboso na Ngai lokola Sodome, bato ya Yelusalemi bazali lokola bato ya Gomore. »
Lisumu oyo bato na ngai basali ezali monene koleka lisumu ya Sodome, engumba oyo ebebisamaki na mbala moko wana moto moko te asembolaki loboko na ye mpo na kotelemela yango.
Sima na koyoka maloba oyo ya bilakeli, tika ete moto moko te kati na bino amipambola na koloba : ‹ Nakolonga na makambo na ngai nyonso atako natamboli kolanda baposa ya motema na ngai moko. › Pamba te, moto oyo akosala mabe oyo akomema moto oyo ayebi likambo te na libunga na ye.
Bosenzelaka ete moto moko te azanga ngolu ya Nzambe ; bosenzelaka mpe ete mosisa moko te ya bololo ebotama mpo na kokotisa mobulu mpe kobebisa bomoi ya bato ebele kati na bino.